-
2 Bakonzi 8:5Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
5 Mpe esalemaki boye: ntango azalaki koyebisa mokonzi ndenge azongisaki mokufi na bomoi,+ talá, mwasi oyo ye azongisaki mwana na ye na bomoi azali kobelela mokonzi mpo na ndako na ye mpe mpo na elanga na ye.+ Na mbala moko, Gehazi alobaki boye: “Nkolo na ngai+ mokonzi, mwasi yango ye oyo, mpe mwana na ye oyo Elisha azongisaki na bomoi ye oyo.”
-