-
Nzembo 50:maloba ya ebandeli ya loyembo-23Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
Mondule ya Asafe.+
50 Nzambe,+ Nzambe, Yehova,+ alobi ye moko,+
Mpe abandi kobenga mabele,+
Banda epai moi ebimaka kino epai yango elalaka.+
2 Longwa na Siona, kitoko ya kokoka,+ Nzambe ye moko angɛngi.+
3 Nzambe na biso akoya mpe akokoka kofanda nyɛɛ te.+
Liboso na ye mɔtɔ ezali kozikisa,+
Mpe mopɛpɛ moko makasi koleka ezalaki zingazinga na ye.+
5 “Bóyanganisa epai na ngai bato na ngai ya sembo,+
Baoyo bazali kosala kondimana na ngai na nzela ya mbeka.”+
7 “Yoká, Ee ekólo na ngai, mpe nakoloba,+
Ee Yisraele, mpe nakotatwela yo.+
Ngai nazali Nzambe, Nzambe na yo.+
8 Nazali kopamela yo mpo na bambeka na yo te,+
Mpe mpo na makabo na yo ya kotumba mobimba oyo ezali liboso na ngai ntango nyonso te.+
10 Mpo nyama nyonso ya zamba oyo ezali na zamba ezali ya ngai,+
Banyama likoló ya bangomba nkóto (1 000).+
11 Nayebi malamu ekelamu nyonso ya mapapu oyo ezalaka na bangomba,+
Mpe ebele ya banyama ya esobe ezali ya ngai.+
12 Soki nazalaka na nzala, nalingaki koyebisa yo yango te;
Mpo mabele oyo ebotaka+ mpe nyonso oyo etondani na kati na yango ezali ya ngai.+
16 Kasi Nzambe akoloba na moto mabe ete:+
“Lotomo nini ozali na yango mpo otánga malako na ngai,+
Mpe omema kondimana na ngai na monɔkɔ na yo?+
18 Ntango nyonso oyo omonaki moyibi, ozalaki kutu kosepela na ye;+
Mpe osalaki boninga na bato ya ekobo.+
19 Ofungoli monɔkɔ na yo polele mpo na kobimisa makambo ya mabe,+
Mpe ozali kaka kokangisa lolemo na yo na bokosi.+
20 Ozali kofanda mpe ozali koloba mabe na ndeko na yo mpenza,+
Ozali kobimisa libunga ya mwana mobali ya mama na yo.+
21 Makambo wana osali yango, mpe ngai nafandaki kaka nyɛɛ.+
Okanisaki ete ngai nakokóma mpenza lokola yo.+
Nakopamela yo,+ mpe nakotya makambo na molɔngɔ na miso na yo.+
-