2 Samwele 9:7 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 7 Mpe Davidi alobaki na ye lisusu boye: “Kobanga te, mpo nakozanga te komonisela yo motema boboto+ mpo na tata na yo Yonatane;+ mpe nasengeli kozongisela yo bilanga nyonso+ ya nkɔkɔ na yo Saulo, mpe yo, okolya limpa na mesa na ngai ntango nyonso.”+ Nzembo 37:21 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 21 Moto mabe adefaka mpe azongisaka te,+Kasi moyengebene amonisaka boboto mpe apesaka makabo.+ Yisaya 32:8 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 8 Bongo mokabi apesi toli mpo na makambo ya bokabi; mpe akotɛlɛma mpo na makambo ya bokabi.+ Bafilipi 2:4 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 4 bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te,+ kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.+ 1 Petro 4:9 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 9 Bóyambanaka na koimaima te.+
7 Mpe Davidi alobaki na ye lisusu boye: “Kobanga te, mpo nakozanga te komonisela yo motema boboto+ mpo na tata na yo Yonatane;+ mpe nasengeli kozongisela yo bilanga nyonso+ ya nkɔkɔ na yo Saulo, mpe yo, okolya limpa na mesa na ngai ntango nyonso.”+