Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Ntango 28:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 “Mpe yo, mwana na ngai Salomo, yebá+ Nzambe ya tata na yo mpe salelá+ ye na motema mobimba+ mpe na molimo ya esengo;+ mpo Yehova azali kotalatala mitema nyonso,+ mpe asosolaka mposa nyonso ya makanisi.+ Soki oluki ye, akosala ete omona ye;+ kasi soki otiki ye,+ akobwaka yo mpo na libela.+

  • Nzembo 62:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Lisusu motema boboto ezali ya yo, Ee Yehova,+

      Mpo yo moko ozongiselaka moto na moto na kolanda mosala na ye.+

  • Masese 24:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Soki okoloba: “Talá! Toyebaki likambo yango te,”+ ye oyo amekamekaka mitema mpo na koyeba ndenge ezali, ye moko akososola nde yango te+ mpe ye oyo azali kotalatala molimo na yo, ye moko akoyeba+ yango mpe akofuta moto ya mabele na kolanda mosala na ye te?+

  • Yirimia 32:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Yo nde ozali monene na toli+ mpe monene na misala,+ yo oyo miso efungwami likoló ya banzela nyonso ya bana ya bato,+ mpo na kopesa na mokomoko na kolanda mbuma ya misala na ye;+

  • Ezekiele 33:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 “Mpe bolobi ete: ‘Nzela ya Yehova ezali sembo te.’+ Ee ndako ya Yisraele, nakosambisa bino, moto na moto na kotalela banzela na ye.”+

  • Matai 16:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Mpo Mwana ya moto asengeli koya na nkembo ya Tata na ye elongo na baanzelu na ye, mpe akopesa moto na moto mbano na kolanda etamboli na ye.+

  • Baroma 2:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe akozongisela moto na moto na kolanda misala na ye:+

  • 2 Bakorinti 5:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpo biso nyonso tosengeli komonisama polele liboso ya kiti ya kosambisa ya Kristo,+ mpo moto na moto azwa oyo ebongi na ye mpo na makambo oyo esalemaki na nzoto, na kotalela makambo oyo azalaki kosala, ezala ya malamu to ya mabe.+

  • Bagalatia 6:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Bómikosa te:+ Nzambe azali moto ya kotyola te.+ Mpo nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka;+

  • 1 Petro 1:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Lisusu, soki bozali kobelela Tata oyo aponaka bilongi te ntango asambisaka+ na kolanda mosala ya moto na moto, bómitambwisa na kobanga+ na ntango oyo bofandi bapaya.+

  • Emoniseli 22:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 “‘Talá! Nazali koya nokinoki,+ mpe nazali na mbano+ ya kopesa, mpo na kozongisela moto na moto ndenge mosala na ye ezali.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto