12 Lisusu, ntango apesaki bambeka, Abisalome atindaki bázwa Ahitofele+ moto ya Gilo,+ mopesi-toli ya Davidi,+ na engumba na ye Gilo.+ Bongo likita+ yango ya mabe ezalaki se koya makasi, mpe bato bazalaki se kobakisama+ epai ya Abisalome.
23 Mpe toli ya Ahitofele, oyo azalaki kopesa na mikolo yango, ezalaki kaka lokola ntango moto atuni liloba ya Nzambe ya solo. Toli+ ya Ahitofele+ ezalaki bongo ezala epai ya Davidi, to epai ya Abisalome.