Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 1:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 1 Na ebandeli+ Nzambe+ azalisaki+ likoló mpe mabele.+

  • Yobo 38:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  4 Yo ozalaki wapi ntango natyaki moboko ya mabele?+

      Yebisá ngai, soki oyebi eloko babengi mayele.

  • Nzembo 89:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Likoló ezali ya yo,+ mabele mpe ezali ya yo;+

      Mabele oyo ebotaka mpe biloko nyonso oyo etondi wana+​—yo moko osalaki yango.+

  • Yisaya 40:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Naino oyebi te to naino oyoká te?+ Yehova, Mozalisi ya mabele nsuka tii nsuka, azali Nzambe mpo na libela.+ Alɛmbaka te, asilaka makasi mpe te.+ Mayele na ye ekoki kososolama te.+

  • Yirimia 51:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Ye azali Mokeli ya mabele na nzela ya nguya na ye,+ Ye oyo atɛlɛmisaki mabele oyo ebotaka+ na nzela ya bwanya+ na ye, mpe Ye oyo atandaki likoló+ na nzela ya mayele na ye.+

  • Misala 14:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 mpe balobaki ete: “Mibali, mpo na nini bozali kosala makambo oyo? Biso mpe tozali bato+ oyo bazali na bolɛmbu+ ndenge moko na oyo ya bino, mpe tozali kosakola nsango malamu epai na bino, mpo bótika makambo wana ya mpamba+ mpe bóya epai ya Nzambe ya bomoi,+ oyo asalaki likoló+ ná mabele ná mbu mpe biloko nyonso oyo ezali na kati na yango.

  • Emoniseli 4:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 “Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo+ mpe lokumu+ mpe nguya,+ mpo yo ozalisaki biloko nyonso,+ mpe mpo na mokano na yo+ yango ezalaki mpe ezalisamaki.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto