8 Liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, oyo azali koyanganisa bato ya Yisraele oyo bapanzaná,+ yango oyo: “Nakoyanganisa mpe bato mosusu epai na ye, longola bato na ye oyo bayanganisami.”+
14 Simeone+ ayebisi malamumalamu ndenge Nzambe abalolaki likebi na ye mpo na mbala ya liboso epai ya bikólo mpo na kobimisa uta na yango ekólo moko mpo na nkombo na ye.+
17 Nzokande, soki bitape mosusu ekatamaki kasi yo, atako ozali nzete ya olive ya zamba, obakamaki na yango+ mpe okómaki kozwa bolamu na mosisa ya mafuta+ ya nzete ya olive,+
11 Na yango, bóbosana te ete kala bozalaki bato ya bikólo na mosuni;+ bobengamaki bato ya “kozanga kokatama ngenga” na baoyo babengami bato ya “kokatama ngenga” oyo esalemi na mabɔkɔ na kati ya mosuni+—