Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 32:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Babandaki koyokisa ye zuwa+ na banzambe ya bapaya;+

      Bazalaki kosilikisa ye na biloko oyo eyinamá.+

  • 2 Bakonzi 17:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 mpe bazalaki kolekisa bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi mbeka na mɔtɔ+ mpe kosakola makambo oyo ebombaná+ mpe koluka bilembo ya makambo oyo ekoya,+ mpe bazalaki se komitɛka+ mpo na kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova, mpo na kosilikisa+ ye;

  • 2 Bakonzi 22:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 mpamba te batiki ngai mpe bakei kobimisela banzambe+ mosusu milinga ya mbeka mpo na kosilikisa ngai na misala nyonso ya mabɔkɔ na bango,+ mpe nkanda na ngai epeleli esika oyo lokola mɔtɔ oyo ekobomama te.’”’+

  • Yirimia 32:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Mpe Bakaladea oyo bazali kobundisa engumba oyo bakokɔta na kati, bakotya engumba yango mɔtɔ mpe bakotumba yango,+ mpe bandako oyo likoló ya bansamba na yango babimiseli Baala milinga ya mbeka mpe basopeli banzambe mosusu makabo ya masanga, mpo na kosilikisa ngai.’+

  • Yirimia 32:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 “‘Mpo bana ya Yisraele mpe bana ya Yuda bazali kaka kosala oyo ezali mabe na miso na ngai, banda bolenge na bango;+ mpo bana ya Yisraele bazali kutu kosilikisa ngai na mosala ya mabɔkɔ na bango,’+ yango nde liloba ya Yehova.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto