Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 32:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Bango, ɛɛ bango, bayokisi ngai zuwa na oyo ezali nzambe te;+

      Batungisaki ngai na bikeko na bango ya mpamba;+

      Nde ngai, ɛɛ ngai, nakoyokisa bango zuwa na oyo ezali ekólo te;+

      Nakosilikisa bango na ekólo moko ya bozoba.+

  • Nzembo 96:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  5 Mpo banzambe nyonso ya bato ya bikólo bazali banzambe ya mpambampamba;+

      Kasi Yehova asalá likoló.+

  • Yisaya 44:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Bózala na nsɔmɔ te, bókamwa mpe te.+ Nasali ete mokomoko na bino ayoka mpe nayebisi likambo yango banda ntango wana, boye te?+ Mpe bino bozali batatoli na ngai.+ Longola ngai, ezali nde na Nzambe mosusu?+ Te, Libanga ezali te.+ Nayebi ata moko te.’”

  • Yirimia 16:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Moto ya mabele akoki nde komisalela banzambe nzokande bazali banzambe te?+

  • 1 Bakorinti 8:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Sikoyo, mpo na likambo oyo etali kolya+ bilei oyo epesami na bikeko, toyebi ete ekeko ezali eloko te+ na mokili, mpe ete Nzambe azali kaka moko.+

  • 1 Petro 3:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Kasi ata soki bosengeli konyokwama mpo na boyengebene, bozali bato ya esengo.+ Nzokande, eloko oyo bango babangaka, bino bóbanga yango te,+ bóbulungana mpe te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto