11 “‘“Mpe ekosalema mpenza boye: ntango okokóma na nsuka ya bomoi na yo mpo okende kozala esika moko na bankɔkɔ na yo,+ nakobimisa mpenza nsima na yo momboto na yo, oyo akozala moko ya bana na yo,+ mpe nakopika makasi mpenza bokonzi na ye.+
2 Na mokolo yango, mwa nzete oyo Yehova akokolisa+ ekozala mpo na kitoko mpe mpo na nkembo,+ mpe mbuma ya mokili ekozala eloko moko ya komikumisa na yango+ mpe eloko moko kitoko mpo na bato ya Yisraele oyo babiki.+
2 Mpe akobima lokola mwa nzete+ liboso ya moto, mpe lokola mosisa oyo ezali kobima na mokili oyo ezangá mai. Azali engambe te, na nkembo mpe te;+ mpe ntango tokomona ye, lolenge na ye ekopesa biso mposa ya kolinga ye te.+
5 “Talá! Mikolo ezali koya,” yango nde liloba ya Yehova, “mpe nakotɛlɛmisela Davidi etape ya boyengebene.+ Mpe mokonzi moko akoyangela mpenza+ mpe akosala na bokɛngi mpe akokata makambo na bosembo mpe na boyengebene na mokili.+
8 “‘Ee Yosua nganga-nzambe monene, yoká, nabondeli yo, yo ná baninga na yo oyo bafandi liboso na yo, mpo bazali bato oyo bazali makamwisi ya komonisa makambo oyo ekoya;+ mpo talá nazali kokɔtisa Etape,+ ye mosaleli na ngai!+
“‘Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “Talá mobali+ oyo nkombo na ye Etape.+ Mpe uta na esika na ye mpenza akobimisa etape, mpe akotonga mpenza tempelo ya Yehova.+
16 “‘Ngai, Yesu, natindaki anzelu na ngai atatwela bino makambo wana mpo na masangá. Nazali mosisa+ mpe mwana+ ya Davidi, mpe monzoto ya ntɔngɔ oyo engɛngaka.’”+