Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yirimia 14:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe Yehova alobaki lisusu na ngai boye: “Basakoli bazali kosakola nde lokuta na nkombo na ngai.+ Natindi bango te, napesi mpe bango mitindo te mpe nalobi na bango te.+ Emonaneli ya lokuta, kosakola makambo oyo ebombaná, likambo ya mpambampamba,+ mpe bokosi ya motema na bango, yango nde bazali koloba na bino na maloba ya esakweli.+

  • Yirimia 28:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Bongo mosakoli Yirimia alobaki lisusu na mosakoli Hanania+ boye: “Nabondeli yo, yoká, Ee Hanania! Yehova atindi yo te, kasi yo moko nde otindi bato oyo bátyela lokuta motema.+

  • Ezekiele 13:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Mawa na bazoba+ ya basakoli, oyo bazali kolanda makanisi na bango moko,+ nzokande bamoni ata eloko moko te!+

  • Ezekiele 22:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Mpe basakoli na ye bapakoleli bango mpɛmbɛ,+ bazali komona emonaneli ya eloko oyo ezali ya solo te+ mpe bazali kosakolela bango makambo oyo ebombaná ya bokosi,+ balobi: “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi,” nzokande Yehova ye moko alobi te.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto