13 Na nsima, abimisaki wana biloko nyonso ya motuya ya ndako ya Yehova mpe biloko ya motuya ya ndako ya mokonzi,+ mpe akatakataki bisaleli nyonso ya wolo+ oyo Salomo mokonzi ya Yisraele asalaki na tempelo ya Yehova, ndenge Yehova alobaki.
3 Na mbula mibale mpenza nakozongisa na esika oyo bisaleli nyonso ya ndako ya Yehova oyo Nebukadenezare mokonzi ya Babilone+ azwaki na esika oyo mpo amema yango na Babilone.’”
2 Na nsima, Yehova akabaki Yehoyakime mokonzi ya Yuda+ ná ndambo ya bisaleli+ ya ndako ya Nzambe ya solo na lobɔkɔ na ye, bongo amemaki yango na mokili ya Shineare+ na ndako ya nzambe na ye; mpe amemaki bisaleli yango na ndako ya kobomba biloko ya motuya ya nzambe na ye.+