Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 24:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Yehoyakine+ azalaki na mbula zomi na mwambe ntango abandaki koyangela, mpe ayangelaki sanza misato na Yerusaleme.+ Mpe nkombo ya mama na ye Nehushita mwana ya Elenatane ya Yerusaleme.

  • 2 Bakonzi 25:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Mpe esalemaki boye: na mbula ya ntuku misato na nsambo (37) ya komemama ya Yehoyakine+ mokonzi ya Yuda na mboka mopaya, na sanza ya zomi na mibale, na mokolo ya ntuku mibale na nsambo (27) ya sanza yango, Evile-merodake+ mokonzi ya Babilone, na mbula oyo akómaki mokonzi, atombolaki motó+ ya Yehoyakine mokonzi ya Yuda mpe abimisaki ye na ndako ya bolɔkɔ;

  • Estere 2:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 oyo bazwaki na Yerusaleme mpe bamemaki ye na mboka mopaya+ elongo na bato oyo bamemamaki, oyo bamemamaki na mboka mopaya, elongo na Yekonia+ mokonzi ya Yuda oyo Nebukadenezare+ mokonzi ya Babilone amemaki na mboka mopaya.

  • Yirimia 22:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 “‘Lokola nazali solo na bomoi,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘ata soki Konia+ mwana ya Yehoyakime,+ mokonzi ya Yuda, azalaka lopɛtɛ ya kotya kashɛ+ na lobɔkɔ na ngai ya mobali, nakolongola yo wana!+

  • Yirimia 37:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 37 Mpe mokonzi Zidikiya+ mwana ya Yosiya+ abandaki koyangela na esika ya Konia+ mwana ya Yehoyakime,+ oyo Nebukadrezare mokonzi ya Babilone akómisaki mokonzi na mokili ya Yuda.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto