Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 25:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Mpe esalemaki boye: na mbula ya libwa+ banda akómaki mokonzi, na sanza ya zomi, na mokolo ya zomi+ ya sanza yango, Nebukadenezare+ mokonzi ya Babilone ayaki,+ ɛɛ, ye ná limpinga mobimba ya basoda na ye, kobundisa Yerusaleme, mpe abandaki kotya kaa mpo na kobundisa yango mpe kotonga efelo ya kozinga mboka epai na epai.+

  • 2 Ntango 36:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Bongo atindelaki bango mokonzi ya Bakaladea,+ oyo abandaki koboma na mopanga+ bilenge na bango ya mibali na ndako ya esika na bango mosantu,+ ayokelaki elenge mobali to ngɔndɔ, mobange to moto oyo anuni mawa te.+ Apesaki eloko nyonso na lobɔkɔ na ye.

  • Yirimia 21:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 “‘“Mpo natɛmɛli engumba oyo mpo na mpasi kasi mpo na bolamu te,”+ yango nde liloba ya Yehova. “Ekopesama na lobɔkɔ ya mokonzi ya Babilone,+ mpe akozikisa yango mpenza na mɔtɔ.”+

  • Yirimia 32:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 mpo Zidikiya mokonzi ya Yuda akangaki ye na bolɔkɔ,+ alobi:

      “Mpo na nini ozali kosakola+ ete: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Talá nazali kopesa engumba oyo na lobɔkɔ ya mokonzi ya Babilone, mpe akozwa yango mpenza;+

  • Yirimia 52:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Nsukansuka, esalemaki boye: na mbula ya libwa banda akómaki mokonzi,+ na sanza ya zomi, na mokolo ya zomi ya sanza yango, Nebukadrezare mokonzi ya Babilone ayaki, ye ná limpinga mobimba ya basoda na ye, kobundisa Yerusaleme,+ mpe babandaki kotya kaa mpo na kobundisa yango mpe kotonga efelo ya kozinga yango epai na epai.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto