Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yirimia 15:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe ekosalema mpenza boye: soki balobi na yo ete ‘Tokobima mpo na kokende wapi?’ bongo osengeli koloba na bango boye: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Moto nyonso oyo azali mpo na bolɔzi oyo ya liwa, na bolɔzi oyo ya liwa! Mpe moto nyonso oyo azali mpo na mopanga, na mopanga! Mpe moto nyonso oyo azali mpo na nzala, na nzala!+ Moto nyonso oyo azali mpo na bokangami, na bokangami!”’+

  • Yirimia 44:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe nakotuna bato oyo bazali kofanda na mokili ya Ezipito bázongisa monɔkɔ, ndenge natunaki Yerusaleme ezongisa monɔkɔ, na mopanga, na nzala mpe na maladi mabe.+

  • Ezekiele 5:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Moko ya bandambo misato na yo—bakokufa na maladi mabe,+ mpe bakosila na nzala na kati na yo.+ Mpe ndambo ya misato mosusu—bakokwea na mopanga zingazinga na yo. Mpe ndambo ya misato ya nsuka, nakopanza mpenza bango na mipɛpɛ nyonso,+ mpe nakobimisa mopanga nsima na bango.+

  • Zekaria 11:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Bongo nalobaki ete: “Nakoleisa bino lisusu te.+ Oyo azali kokufa, akufa. Mpe oyo azali kolongolama, alongolama.+ Mpe baoyo batikali, mokomoko alya mosuni ya moninga na ye.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto