Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 13:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 “Soki ndeko na yo, mwana ya mama na yo, to mwana na yo ya mobali to mwana na yo ya mwasi to mwasi na yo ya bolingo to moninga na yo oyo azali lokola molimo na yo moko,+ ameki kobenda yo na nkuku, na maloba oyo: ‘Tókende mpe tósalela banzambe mosusu,’+ oyo oyebi te, ezala yo ezala bankɔkɔ na yo,

  • Kolimbola Mibeko 29:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Mpe bakendaki kosalela banzambe mosusu mpe kogumbamela bango, banzambe oyo bayebaki te mpe oyo ye apesaki bango te.+

  • Kolimbola Mibeko 32:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Bazalaki kopesa bademo bambeka, kasi Nzambe te,+

      Banzambe oyo bango bayebaki te,+

      Banzambe ya sika oyo bayaki sika,+

      Oyo bankɔkɔ na bino bayebaki te.

  • Yirimia 19:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 mpo batiki ngai+ mpe basali ete esika oyo eyebana lisusu te+ mpe na esika oyo, babimisi milinga ya mbeka epai ya banzambe mosusu oyo bango bayebaki te,+ bango ná bankɔkɔ na bango mpe bakonzi ya Yuda; mpe batondisi esika oyo na makila ya bato oyo bazali na likambo te.+

  • Yirimia 22:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mpe bakoloba mpenza ete: “Ezali mpo batikaki kondimana ya Yehova Nzambe+ na bango mpe bagumbamelaki banzambe mosusu mpe basalelaki bango.”’+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto