14 ngai mpe nakopesa mpenza mbula na mokili na bino na ntango na yango oyo etyamá,+ mbula ya eleko ya otɔnɛ ná mbula ya eleko ya prɛnta,+ mpe okobuka mpenza mbuma na yo ná vinyo na yo ya elɛngi mpe okozwa mafuta na yo.
23 Mpe bino bana ya Siona, bózala na esengo mpe bósepela mpo na Yehova Nzambe na bino;+ mpo akozanga te kopesa bino mbula ya eleko ya otɔnɛ na ndenge oyo ekoki,+ mpe akonɔkisela bino mbula makasi, mbula ya eleko ya otɔnɛ mpe mbula ya eleko ya prɛnta, lokola na ebandeli.+
7 Yango wana, bandeko, bózala na motema molai tii na kozala+ ya Nkolo. Talá! Moloni-bilanga akobaka kozela mbuma ya malamu ya mabele, amoniselaka yango motema molai tii mbula ya ebandeli ná mbula ya nsuka ekonɔka.+