Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 18:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Na nsima, Eliya apusanaki epai ya bato nyonso mpe alobaki boye: “Kino ntango nini bokokakatana na makanisi?*+ Soki Yehova azali Nzambe ya solo, bólanda ye;+ kasi soki ezali nde Baala, bólanda ye.” Mpe bato bazongiselaki ye ata liloba moko te.

  • 2 Bakonzi 23:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe alongolaki banganga-nzambe ya banzambe-bapaya, oyo bakonzi ya Yuda batyaki mpo bábimisaka milinga ya mbeka na bisika oyo etombwaná na kati ya bingumba ya Yuda mpe na bisika oyo ezali zingazinga ya Yerusaleme, ná baoyo bazalaki kobimisela Baala+ milinga ya mbeka, mpo na moi mpe mpo na sanza mpe mpo na maboke ya minzoto ya zodiake mpe mpo na limpinga nyonso ya likoló.+

  • Yirimia 11:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpo banzambe na yo bakómi ebele lokola bingumba na yo, Ee Yuda;+ mpe botyeli eloko ya nsɔni+ bitumbelo ebele lokola babalabala ya Yerusaleme, bitumbelo mpo na kobimisela Baala milinga ya mbeka.’+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto