11 Yehova alobi: “Litomba nini nazali na yango na ebele ya bambeka na bino? Nalɛmbi makabo ya kotumba mobimba+ ya bampate ya mibali+ mpe mafuta ya banyama oyo eleisami malamu;+ mpe nasepeli te+ na makila+ ya bana-ngɔmbɛ ya mibali mpe ya bana-mpate ya mibali mpe ya bantaba ya mibali.+
22 Mpo nalobaki na bankɔkɔ na bino te, mpe napesaki bango mitindo te, na mokolo oyo nabimisaki bango na mokili ya Ezipito, na oyo etali makambo ya likabo ya kotumba mobimba mpe ya mbeka.+