30 Ntango makambo ekoyela yo ndongo mpe maloba oyo nyonso ekozwa yo na nsuka ya mikolo, okozongela mpenza Yehova Nzambe+ na yo mpe okoyoka mpenza mongongo na ye.+
13 “Mpe bópasola mitema+ na bino, kasi bilamba na bino te;+ mpe bózongela Yehova Nzambe na bino, mpamba te azali na ngɔlu mpe na motema mawa,+ ayokaka nkanda noki te+ mpe azali na motema boboto mingi,+ mpe akoyoka mpenza mawa mpo na mpasi yango.+
8 Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.+ Bópɛtola mabɔkɔ na bino, bino basumuki,+ mpe bókómisa mitema na bino pɛto,+ bino bato ya mitema mibale.+