Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 8:46
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 46 “Soki basaleli yo lisumu+ (mpo ezali na moto moko te oyo asalaka lisumu te),+ mpe osilikeli bango mpe osundoli bango na mabɔkɔ ya monguna, mpe bato oyo bakangi bango bamemi bango bakangami na mokili ya monguna, mosika to penepene;+

  • Yisaya 1:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mawa na ekólo ya masumu,+ bato oyo libunga na bango ekómi kilo, momboto oyo ezali kosala mabe,+ bana oyo babebisaka makambo!+ Batiki Yehova,+ bazangi limemya epai ya Mosantu ya Yisraele,+ bapesi ye mokɔngɔ.+

  • Yisaya 59:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Te, kasi mabunga na bino ekómi biloko oyo ezali kokabola bino ná Nzambe na bino,+ mpe masumu na bino moko etindi ye abombela bino elongi na ye mpo ayoka te.+

  • Yirimia 6:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Bango nyonso bazali bato ya mitó makasi,+ bazali kotambolatambola mpo na kokosela bato makambo+—bazali motako mpe ebende. Bango nyonso bazali bato oyo babebisaka.+

  • Ezekiele 14:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 “Mwana ya moto, na oyo etali mokili moko boye, soki yango ezali kosalela ngai lisumu na kozangáká bosembo,+ ngai mpe nakosembolela yango lobɔkɔ na ngai mpe nakobukela yango mangenda oyo bakakisi mampa oyo esalemi lokola lopɛtɛ,+ mpe nakotindela yango nzala+ mpe nakolongola na kati na yango moto ya mabele mpe nyama ya mboka.”+

  • Ezekiele 22:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 omemi ngambo na makila oyo osopi,+ mpe okómi mbindo na bikeko na yo ya bosɔtɔ oyo osali.+ Mpe oyeisi mikolo na yo mokuse, mpe okokóma na bambula na yo. Yango wana nakokómisa yo mpenza eloko ya kosambwisa na bikólo mpe eloko ya kosɛka na mikili nyonso.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto