5 ntango bazalaki koloba ete: ‘Tobondeli bino, bólongwa moto na moto na nzela na ye ya mabe mpe na mabe ya misala na bino,+ mpe bókoba kofanda na mabele oyo Yehova apesaki bino mpe bankɔkɔ na bino banda kala mpe apesi bino mpo na ntango molai oyo ekoya.+
6 “Na yango, lobá na ndako ya Yisraele ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Bózonga mpe bópesa mokɔngɔ na bikeko na bino ya bosɔtɔ+ mpe bólongola bilongi na bino na biloko nyonso na bino oyo eyinamá;+