-
2 Bakonzi 17:13Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
13 mpe Yehova azalaki se kokebisa+ Yisraele+ ná Yuda+ na nzela ya basakoli+ na ye nyonso mpe momoni-bimonaneli+ nyonso, ete: “Bóbaluka, bótika banzela na bino ya mabe+ mpe bótosa mitindo+ na ngai, mitinda+ na ngai, na kolanda mobeko+ nyonso oyo napesaki bankɔkɔ+ na bino mpe oyo natindelaki bino na nzela ya basaleli na ngai basakoli”;+
-
-
Yirimia 18:11Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
11 “Mpe sikoyo, nabondeli yo, lobá na bato ya Yuda mpe na bato oyo bafandi na Yerusaleme ete: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Talá nazali kobongisela bino mpasi moko boye mpe nazali kokanisela bino likanisi moko boye.+ Nabondeli bino, bóbongwana, mokomoko na bino atika nzela na ye mabe, mpe bókómisa banzela na bino mpe misala na bino malamu.”’”+
-
-
Yirimia 35:15Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
15 Mpe nazalaki kaka kotindela bino basaleli na ngai nyonso basakoli,+ kolamukáká ntɔngɔntɔngɔ mpe kotindáká bango na maloba oyo: ‘Nabondeli bino, bózonga, moto na moto alongwa na nzela na ye ya mabe,+ mpe bóbongisa misala na bino,+ mpe bólanda banzambe mosusu te mpo na kosalela bango.+ Mpe bókoba kofanda na mabele oyo napesá bino mpe bankɔkɔ na bino.’+ Kasi bosembolaki litoi na bino te, mpe boyokaki ngai te.+
-
-
Ezekiele 33:11Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
11 Lobá na bango boye: ‘“Lokola nazali solo na bomoi,” yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, “nasepelaka na liwa ya moto mabe te,+ nasepelaka nde ete moto mabe abongwana,+ atika nzela na ye mpe atikala mpenza na bomoi.+ Bóbongwana, bóbongwana, bótika banzela na bino ya mabe,+ mpamba te bókufa mpo na nini, Ee ndako ya Yisraele?”’+
-