-
Ezekiele 36:5Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
5 na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Ya solo, na mɔtɔ ya molende na ngai, nakolobela+ baoyo batikali na kati ya bikólo mpe Edome, mobimba na yango,+ baoyo bamipesi mokili na ngai mpo ezala eloko na bango, na esengo ya motema mobimba,+ na lityo na kati ya molimo,+ mpo na kozwa bisika na yango oyo bibwɛlɛ elyaka matiti mpe mpo na kopunza yango.’”’+
-
-
Amose 1:11Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
11 “Talá oyo Yehova alobi: ‘Mpo na botomboki misato ya Edome,+ mpe mpo na minei, nakozongisa yango nsima te, mpo na ndenge alandá ndeko na ye mpenza na mopanga,+ mpe mpo abebisá bizaleli na ye ya koyokela mawa,+ mpe nkanda na ye ezali se kopasola mpo na libela; mpe nkɛlɛ na ye—abatelá yango mpo na seko.+
-