Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Samwele 7:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Ye nde akotongela nkombo na ngai+ ndako, mpe nakopika kiti ya bokonzi na ye makasi mpenza mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+

  • Yisaya 9:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Bonene ya boyangeli na ye+ mpe kimya, kiti ya bokonzi ya Davidi+ mpe bokonzi na ye, ekozala na nsuka te.+ Ekopikama makasi+ mpe ekosimbama na bosembo+ mpe na boyengebene,+ banda sikoyo mpe tii na ntango oyo etyami ndelo te. Molende mpenza ya Yehova ya mampinga nde ekosala yango.+

  • Ezekiele 37:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Mpe bakofanda mpenza na mokili oyo napesaki mosaleli na ngai, Yakobo, epai bankɔkɔ na bino bafandaki,+ mpe bakofanda mpenza kuna,+ bango ná bana na bango ná bana ya bana na bango mpo na ntango oyo etyami ndelo te,+ mpe Davidi mosaleli na ngai akozala nkumu na bango mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+

  • Danyele 7:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe bapesaki ye boyangeli,+ lokumu+ ná bokonzi,+ mpo bato ya bikólo, bituluku ya bato ya bikólo mpe minɔkɔ nyonso básalela ye.+ Boyangeli na ye ezali boyangeli oyo ekoumela seko, oyo ekoleka te, mpe bokonzi na ye ezali bokonzi oyo ekobebisama te.+

  • Mika 4:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpe oyo azalaki kotɛnguma nakokómisa mpenza ye litiká,+ mpe ye oyo abwakamaki mosika, nakokómisa ye ekólo moko ya makasi;+ mpe Yehova akoyangela mpenza bango na Ngomba Siona, uta sikoyo mpe mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+

  • Emoniseli 11:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpe anzelu ya nsambo ayulaki kelelo na ye.+ Mpe mingongo ya makasi ebimaki na likoló, elobi: “Bokonzi ya mokili ekómi bokonzi ya Nkolo na biso+ mpe ya Kristo na ye,+ mpe akoyangela libela na libela.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto