Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yirimia 17:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Ngai, Yehova, nalukalukaka na kati ya motema+ mpe natalatalaka bangɛi,+ ɛɛ mpo na kopesa moto na moto ndenge banzela na ye ezali,+ ndenge mbuma ya misala na ye ezali.+

  • Ezekiele 18:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 “‘Na yango, Ee ndako ya Yisraele, nakosambisa bino moto na moto na kotalela banzela na ye,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.+ ‘Bóbongwana, ɛɛ, bóbongwana, bótika misala na bino nyonso ya kobuka mibeko,+ mpe eloko moko te ezala libaku oyo ezali kosalisa bino libunga.+

  • Ezekiele 22:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Boye nakosopela bango makaneli+ na ngai. Nakosilisa bango nyɛɛ na mɔtɔ ya nkɛlɛ na ngai.+ Nakozongisa nzela na bango na motó na bango moko,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.”

  • Baebre 4:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe ezali na ekelamu moko te oyo ezangi komonana polele na miso na ye,+ kasi biloko nyonso ezali bolumbu mpe ezali komonana polele na miso ya moto oyo tokozongisa monɔkɔ epai na ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto