9 mpo na koloba na bato ya bolɔkɔ+ ete: ‘Bóbima!’+ na baoyo bazali na molili+ ete: ‘Bómonana!’+ Bakolya matiti pembenipembeni ya banzela, mpe bisika na bango ya kolya matiti ekozala na banzela nyonso epai bato balekalekaka.+
23 Mpe nakobimisela yango mobateli moko ya mpate,+ mpe akoleisa yango mpenza, ɛɛ mosaleli na ngai Davidi.+ Ye nde akoleisa yango, mpe ye nde akokóma mobateli na yango.+
14 Kambá bato na yo na lingenda na yo,+ etonga ya libula na yo, oyo ezalaki kofanda yango moko kati na zamba—na katikati ya elanga ya banzete ya mbuma.+ Bálya na Bashane mpe na Gileade+ lokola na mikolo ya ntango ya kalakala.+