Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 22:maloba ya ebandeli ya loyembo-31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • Epai ya mokambi ya nzembo na mongongo ya Bishe ya Ntɔngɔntɔngɔ. Mondule ya Davidi.

      22 Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini otiki ngai?+

      Mpo na nini ozali mosika na kobikisa ngai,+

      Mosika na maloba na ngai ya koganga?+

       2 Ee Nzambe na ngai, na moi, nazali se kobenga, mpe ozali koyanola te;+

      Mpe na butu, nazali mpe kofanda nyɛɛ te.+

       3 Kasi yo ozali mosantu,+

      Ozali kofanda na kati ya masanzoli ya Yisraele.+

       4 Batata na biso batyelaki yo motema;+

      Batyaki motema, mpe ozalaki kobikisa bango.+

       5 Babelelaki yo,+ mpe babikaki;+

      Batyelaki yo motema, mpe bayokaki nsɔni te.+

       6 Kasi ngai nazali nkusu,+ nazali moto te,

      Eloko ya nsɔni na miso ya bato mpe ya kotyola na miso ya bato.+

       7 Baoyo nyonso bazali komona ngai, bazali kosɛka ngai;+

      Bazali se kofungola minɔkɔ na bango polele, bazali se koningisa mitó na bango:+

       8 “Ye amipesaki na Yehova.+ Tiká abikisa ye!+

      Tiká asikola ye, mpo asepeli na ye!”+

       9 Mpo yo Moto obimisaki ngai na libumu,+

      Yo Moto osalaki ete natya motema ntango nazalaki na mabɛlɛ ya mama na ngai.+

      10 Nabwakamaki epai na yo banda na libumu;+

      Banda na libumu ya mama na ngai ozalaki Nzambe na ngai.+

      11 Kozala mosika na ngai te, mpo mpasi ezali penepene,+

      Mpo mosungi mosusu azali te.+

      12 Ebele ya bana-ngɔmbɛ mibali bazingi ngai;+

      Bana-ngɔmbɛ mibali ya nguya ya Bashane bazingi ngai.+

      13 Bafungoleli ngai monɔkɔ,+

      Lokola nkɔsi oyo ezali kopasolapasola mpe koganga.+

      14 Nasopami lokola mai,+

      Mpe mikuwa na ngai nyonso ekabwani.+

      Motema na ngai ekómi lokola mafuta;+

      Enyangwe na kati ya libumu na ngai.+

      15 Nguya na ngai ekauki lokola eteni ya mbɛki,+

      Mpe lolemo na ngai ekangami na misuni ya mino na ngai;+

      Mpe ozali kotya ngai na putulu ya liwa.+

      16 Mpo bambwa ezingi ngai;+

      Liyangani ya basali-mabe ezingi ngai.+

      Bazali koswa mabɔkɔ na ngai ná makolo na ngai lokola nkɔsi.+

      17 Nakoki kotánga mikuwa na ngai nyonso.+

      Bango bazali kotala, bazali kotalatala ngai.+

      18 Bazali komikabolela bilamba na ngai,+

      Mpe bazali kobwakela bilamba na ngai mbɛsɛ.+

      19 Kasi yo, Ee Yehova, Ee kozala mosika te.+

      Ee yo makasi na ngai,+ salá noki osunga ngai.+

      20 Bikisá molimo na ngai nabomama na mopanga te,+

      Molimo na ngai kaka moko na lobɔkɔ ya mbwa;+

      21 Bikisá ngai na monɔkɔ ya nkɔsi,+

      Mpe yanolá mpe bikisá ngai na maseke ya bangɔmbɛ ya zamba.+

      22 Nakosakwela bandeko na ngai+ nkombo na yo;+

      Nakosanzola yo na katikati ya lisangá.+

      23 Bino baoyo bobangaka Yehova, bósanzola ye!+

      Bino nyonso momboto ya Yakobo, bópesa ye nkembo!+

      Mpe bóbanga ye, bino nyonso momboto ya Yisraele.+

      24 Mpo atyoli te+

      Mpe ayoki mpii te mpo na mpasi ya moto ya mpasi;+

      Mpe abombeli ye elongi na ye te,+

      Mpe ntango alelelaki ye mpo na kosɛnga lisalisi ayokaki.+

      25 Lisanzoli na ngai kati na lisangá monene+ ekouta epai na yo;

      Nakokokisa bilako na ngai liboso ya baoyo babangaka ye.+

      26 Bato ya komikitisa bakolya mpe bakotonda;+

      Baoyo balukaka ye bakosanzola Yehova.+

      Mitema na bino ezala na bomoi mpo na seko.+

      27 Bansuka nyonso ya mabele ekokanisa mpe ekozongela Yehova.+

      Mpe mabota nyonso ya bikólo ekogumbamela yo.+

      28 Mpo bokonzi ezali ya Yehova,+

      Mpe ye azali koyangela bikólo.+

      29 Bato nyonso ya mafutamafuta oyo bazali na mabele bakolya mpe bakogumbama;+

      Baoyo nyonso oyo bazali kokita na putulu bakofukamela ye,+

      Mpe moto moko te akobatela molimo na ye na bomoi.+

      30 Momboto ekosalela ye;+

      Bakosakola yango mpo na Yehova na libota oyo ekoya.+

      31 Bakoya mpe bakoyebisa boyengebene na ye+

      Na bato oyo bakobotama, ete asali yango.+

  • Yisaya 53:1-12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 53 Nani andimeli likambo oyo toyoki?+ Bongo lobɔkɔ ya Yehova+ emonisami epai ya nani?+ 2 Mpe akobima lokola mwa nzete+ liboso ya moto, mpe lokola mosisa oyo ezali kobima na mokili oyo ezangá mai. Azali engambe te, na nkembo mpe te;+ mpe ntango tokomona ye, lolenge na ye ekopesa biso mposa ya kolinga ye te.+

      3 Azalaki kotyolama mpe bato bazalaki kokima ye,+ moto oyo asengelaki komona mpasi mpe komesana na maladi.+ Mpe ezalaki lokola nde tozali koboya kotala elongi ya moto moko boye.+ Atyolamaki, mpe tomonaki ye mpamba.+ 4 Ya solo, amemaki nde bamaladi na biso;+ mpe akumbaki bampasi na biso.+ Kasi biso tomonaki ete azali moto oyo Nzambe apesi etumbu,+ abɛti+ mpe amonisi mpasi.+ 5 Kasi atɔbɔlamaki+ mpo na misala na biso ya kobuka mibeko;+ anyatamaki mpo na mabunga na biso.+ Etumbu oyo esengelaki mpo na kimya na biso ezalaki likoló na ye,+ mpe mpo na bampota+ na ye tobiki.+ 6 Tozalaki koyengayenga biso nyonso lokola bampate;+ tozalaki kobaluka moto na moto na nzela na ye moko; mpe Yehova ye moko asali ete libunga na biso nyonso ekwela moto wana.+ 7 Batyaki ye mpanzi likoló mingi,+ mpe atikaki bámonisa ye mpasi;+ kasi afungolaki monɔkɔ te. Bamemaki ye lokola mpate oyo ekei kobomama,+ mpe lokola mpate ya mwasi oyo elelaka te liboso ya bakati-nsuki na yango, ye mpe afungolaki monɔkɔ te.+

      8 Basambisaki ye na bosembo te yango wana anyokwamaki mpe alongolamaki;+ mpe nani akoluka koyeba makambo ya libota na ye?+ Mpo alongolamaki+ na mokili ya bato ya bomoi.+ Abɛtamaki kobɛtama+ mpo bato na ngai babukaki mibeko.+ 9 Mpe ntango akokufa, akosala lilita na ye esika moko na bato mabe,+ mpe esika moko na bazwi,+ atako asalaki mobulu te+ mpe lokuta ezalaki na monɔkɔ na ye te.+

      10 Kasi Yehova ye moko asepelaki konyata ye;+ akómisaki ye moto ya maladi.+ Soki okómisi molimo na ye likabo ya ngambo,+ akomona bana na ye,+ akoyeisa mikolo na ye molai,+ mpe na lobɔkɔ na ye, likambo oyo esepelisaka+ Yehova ekolonga.+ 11 Mpo na mpasi ya molimo na ye, akomona bolamu,+ akotonda.+ Na nzela ya boyebi na ye, moyengebene, mosaleli na ngai,+ akomemela bato mingi ezaleli ya boyengebene;+ mpe ye moko akomema mabunga na bango.+ 12 Yango wana nakopesa ye likabo elongo na ebele ya bato,+ mpe na bato ya nguya nde akokabola biloko oyo epunzami,+ mpamba te asopaki molimo na ye kino na liwa,+ mpe atángamaki nde elongo na bato oyo babukaka mibeko;+ mpe ye moko amemaki lisumu ya bato ebele,+ mpe akómaki kokɔtela bato oyo babukaka mibeko.+

  • Bileli 4:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Mpema ya zolo na biso,+ moto ya Yehova oyo atyami mafuta,+ bakangi ye na libulu na bango monene,+

      Ye oyo tolobaki mpo na ye ete: “Na nse ya elili na ye+ nde tokobika kati na bikólo.”+

  • Danyele 9:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 “Mpe nsima ya pɔsɔ yango ntuku motoba na mibale (62), Masiya akolongolama,+ akotikala na eloko moko te.+

      “Mpe engumba ná esika mosantu,+ bato ya mokambi moko oyo azali koya bakobebisa yango.+ Mpe nsuka na yango ekozala na nzela ya mpela. Mpe tii na nsuka ekozala etumba; oyo ekanami ezali libebi na libebi.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto