Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 29:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Bongo bosengeli kobatela maloba ya kondimana oyo mpe kosalela yango, mpo likambo nyonso oyo bokosala etambola malamu.+

  • Nzembo 1:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 Kasi asepelaka na mobeko ya Yehova,+

      Mpe atángaka mobeko na ye na mongongo ya nse butu moi.+

  • Nzembo 112:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 112 Bósanzola Yehova!+

      א [ʼAlef]

      Esengo na moto oyo azali kobanga Yehova,+

      ב [Bet]

      Oyo asepeli mingi+ na mitindo na ye.+

  • Nzembo 119:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 Esengo na baoyo bazali kotosa makundoli na ye;+

      Bazali kolukaluka ye na motema na bango mobimba.+

  • Yisaya 56:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Esengo na moto—mowei mpamba—oyo azali kosala bongo,+ mpe na mwana ya bato oyo akangami na yango,+ oyo azali kotosa sabata mpo akómisa yango eloko mpamba te,+ mpe oyo azali kobatela lobɔkɔ na ye mpo asala eloko moko te ya mabe.+

  • Matai 7:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 “Ezali te bato nyonso oyo balobaka na ngai: ‘Nkolo, Nkolo,’ nde bakokɔta na bokonzi ya likoló, kasi moto oyo azali kosala+ mokano ya Tata na ngai oyo azali na likoló.+

  • Yakobo 1:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Kasi moto oyo azali kotalatala na mobeko ya kokoka+ mpe ya bonsomi mpe oyo azali kotingama na yango, moto wana, lokola akómi moyoki oyo abosanaka te, kasi moto oyo azali kosala mosala,+ akozala na esengo+ ndenge azali kosalela yango.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto