35 Mpe bana ya Yisraele balyaki mana mbula ntuku minei (40),+ tii ntango bakómaki na mokili oyo bato bafandi.+ Mana ezalaki eloko oyo bazalaki kolya tii ntango bakómaki na ndelo ya mokili ya Kanana.+
13 Bongo nkanda ya Yehova engalelaki Yisraele mpe asalaki ete bango báyengayenga na esobe mbula ntuku minei (40),+ kino bato nyonso ya ntango wana oyo bazalaki kosala mabe na miso ya Yehova basilaki.+
2 Mpe osengeli kokanisa nzela nyonso oyo Yehova Nzambe na yo atambwisaki yo mbula ntuku minei (40) oyo, na esobe,+ mpo na koteya yo komikitisa,+ komeka+ yo mpo na koyeba oyo ezalaki na motema na yo,+ soki okobatela mitindo na ye to te.