Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 20
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Mitángo

      • Miriame akufi na Kadeshe (1)

      • Moize abɛti libanga mpe asali lisumu (2-13)

      • Edome aboyi kotikela Yisraele nzela (14-21)

      • Liwa ya Arona (22-29)

Mitángo 20:1

Mitindami

  • +Mit 13:26; 20:22; 33:36; Mib 2:14
  • +Kob 15:20; Mit 26:59; Mik 6:4

Mitángo 20:2

Mitindami

  • +Kob 17:1

Mitángo 20:3

Mitindami

  • +Kob 17:2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    2/2019, nk. 12-13

Mitángo 20:4

Mitindami

  • +Kob 14:11; 17:3; Mit 16:13, 14; 21:5

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/9/2009, lok. 32

Mitángo 20:5

Mitindami

  • +Mib 8:14, 15
  • +Mib 8:7, 8

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    2/2019, nk. 12-13

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/9/2009, lok. 32

Mitángo 20:6

Mitindami

  • +Kob 16:10; Mit 14:10

Mitángo 20:8

Mitindami

  • +Kob 17:5, 6; Nz 78:15; 105:41; 114:8; Yis 48:21

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 35

Mitángo 20:9

Mitindami

  • +Kob 7:12, 19; Mit 17:10

Mitángo 20:10

Mitindami

  • +Nz 106:32, 33

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    7/2018, nk. 14-15

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/9/2009, lok. 32

Mitángo 20:11

Mitindami

  • +1Ko 10:1, 4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/9/2009, lok. 32

Mitángo 20:12

Mitindami

  • +Mit 27:12-14; Mib 1:37; 3:26; 32:51, 52; 34:4; Yos 1:2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/9/2009, lok. 32

    “Makomami nyonso,” lok. 31

Mitángo 20:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “koswanisa.”

Mitindami

  • +Nz 106:32, 33

Mitángo 20:14

Mitindami

  • +Bas 11:17
  • +Eb 36:8; Mib 2:4; 23:7

Mitángo 20:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mikolo.”

Mitindami

  • +Eb 46:6
  • +Eb 15:13; Kob 12:40
  • +Kob 1:11, 14

Mitángo 20:16

Mitindami

  • +Kob 2:23; 3:7
  • +Kob 14:19; 23:20; 33:2

Mitángo 20:17

Mitindami

  • +Mit 21:21, 22; Mib 2:26, 27

Mitángo 20:19

Mitindami

  • +Mib 2:5, 6
  • +Mib 2:26, 28

Mitángo 20:20

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “lobɔkɔ.”

Mitindami

  • +Bas 11:17

Mitángo 20:21

Mitindami

  • +Mib 2:8; Bas 11:18

Mitángo 20:22

Mitindami

  • +Mit 21:4; 33:37; 34:2, 7

Mitángo 20:24

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Oyo ezali maloba ya ntɔki mpo na kolobela liwa.

Mitindami

  • +Mit 33:38; Mib 32:50
  • +Mit 20:12; Mib 32:51, 52

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    7/2018, nk. 14-15

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/9/2009, lok. 32

Mitángo 20:26

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “akoyanganisama mpe akokufa kuna.”

Mitindami

  • +Kob 28:2; 29:29
  • +Kob 6:23; Mit 4:16

Mitángo 20:28

Mitindami

  • +Mit 33:39; Mib 10:6; 32:50

Mitángo 20:29

Mitindami

  • +Mib 34:8

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Mit. 20:1Mit 13:26; 20:22; 33:36; Mib 2:14
Mit. 20:1Kob 15:20; Mit 26:59; Mik 6:4
Mit. 20:2Kob 17:1
Mit. 20:3Kob 17:2
Mit. 20:4Kob 14:11; 17:3; Mit 16:13, 14; 21:5
Mit. 20:5Mib 8:14, 15
Mit. 20:5Mib 8:7, 8
Mit. 20:6Kob 16:10; Mit 14:10
Mit. 20:8Kob 17:5, 6; Nz 78:15; 105:41; 114:8; Yis 48:21
Mit. 20:9Kob 7:12, 19; Mit 17:10
Mit. 20:10Nz 106:32, 33
Mit. 20:111Ko 10:1, 4
Mit. 20:12Mit 27:12-14; Mib 1:37; 3:26; 32:51, 52; 34:4; Yos 1:2
Mit. 20:13Nz 106:32, 33
Mit. 20:14Bas 11:17
Mit. 20:14Eb 36:8; Mib 2:4; 23:7
Mit. 20:15Eb 46:6
Mit. 20:15Eb 15:13; Kob 12:40
Mit. 20:15Kob 1:11, 14
Mit. 20:16Kob 2:23; 3:7
Mit. 20:16Kob 14:19; 23:20; 33:2
Mit. 20:17Mit 21:21, 22; Mib 2:26, 27
Mit. 20:19Mib 2:5, 6
Mit. 20:19Mib 2:26, 28
Mit. 20:20Bas 11:17
Mit. 20:21Mib 2:8; Bas 11:18
Mit. 20:22Mit 21:4; 33:37; 34:2, 7
Mit. 20:24Mit 33:38; Mib 32:50
Mit. 20:24Mit 20:12; Mib 32:51, 52
Mit. 20:26Kob 28:2; 29:29
Mit. 20:26Kob 6:23; Mit 4:16
Mit. 20:28Mit 33:39; Mib 10:6; 32:50
Mit. 20:29Mib 34:8
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Mitángo 20:1-29

Mitángo

20 Na sanza ya liboso, liyangani mobimba ya Bayisraele bakómaki na esobe ya Zine mpe bato babandaki kofanda na Kadeshe.+ Kuna nde Miriame+ akufaki mpe bakundaki ye.

2 Sikoyo mai ezalaki te mpo na liyangani,+ mpe Bayisraele bayanganaki mpo na kotombokela Moize ná Arona. 3 Bato babandaki koswanisa Moize+ mpe koloba ete: “Soki tókufaka ata ntango bandeko na biso bakufaki liboso ya Yehova! 4 Mpo na nini bomemi lisangá ya Yehova na esobe oyo mpo tókufa awa biso ná bibwɛlɛ na biso?+ 5 Mpe mpo na nini bobimisi biso na Ezipito mpo na komema biso na esika mabe oyo?+ Ezali te esika ya mboto ná bafigi ná banzete ya vinyo ná mbuma ya grenade, mpe mai ya komɛla ezali te.”+ 6 Bongo Moize ná Arona balongwaki liboso ya lisangá mpo na koya na ekɔtelo ya hema ya kokutana mpe bakweaki bilongi na nse, mpe nkembo ya Yehova ebandaki kobimela bango.+

7 Na nsima, Yehova alobaki na Moize ete: 8 “Zwá lingenda mpe yanganisá liyangani, yo ná Arona ndeko na yo, mpe bóloba na libanga na miso na bango ete ebimisa mai na yango, mpe okobimisela bango mai na libanga mpe okopesa mai ya komɛla na liyangani ná bibwɛlɛ na bango.”+

9 Bongo Moize azwaki lingenda liboso ya Yehova,+ kaka ndenge apesaki ye mitindo. 10 Na nsima, Moize ná Arona babengisaki lisangá liboso ya libanga yango, mpe alobaki na bango ete: “Bóyoka sikoyo, bino batomboki! Tosengeli kobimisela bino mai na libanga oyo?”+ 11 Na yango, Moize atombolaki lobɔkɔ na ye mpe abɛtaki libanga mbala mibale na lingenda na ye, mpe mai mingi ebandaki kobima, mpe liyangani ná bibwɛlɛ na bango babandaki komɛla.+

12 Na nsima, Yehova alobaki na Moize mpe na Arona ete: “Lokola bondimelaki ngai te mpe bosantisaki ngai te na miso ya bato ya Yisraele, bokokɔtisa lisangá oyo te na mokili oyo nakopesa bango.”+ 13 Wana ezali mai ya Meriba,*+ epai Bayisraele baswanisaki Yehova, bongo asantisamaki na kati na bango.

14 Na nsima, Moize atindelaki mokonzi ya Edome+ bamemi-nsango uta na Kadeshe ete: “Talá oyo ndeko na yo Yisraele+ alobi: ‘Oyebi malamu mpasi nyonso oyo ekomelaki biso. 15 Batata na biso bakendaki na Ezipito,+ bafandaki na Ezipito bambula* mingi,+ mpe Baezipito banyokolaki biso ná batata na biso.+ 16 Nsukansuka, tolelelaki Yehova,+ mpe ayokaki biso mpe atindaki anzelu+ mpe abimisaki biso na Ezipito, mpe biso oyo na Kadeshe, engumba oyo ezali na ndelo ya teritware na yo. 17 Tobondeli yo, tiká tóleka na mokili na yo. Tokoleka ata moke te na elanga to na elanga ya vinyo, mpe tokomɛla mai ya libulu ata moko te. Tokotambola na balabala ya mokonzi mpe tokobaluka te na lobɔkɔ ya mobali to na lobɔkɔ ya mwasi, tii tokoleka na teritware na yo.’”+

18 Kasi Edome alobaki na ye ete: “Okoleka na teritware na ngai te. Soki omɛki, nakobima na mopanga mpo na kokutana na yo.” 19 Bongo Bayisraele balobaki na ye ete: “Tokomata na balabala monene, mpe soki biso ná bibwɛlɛ na biso tomɛli mai na yo, tokofuta mpo na yango.+ Tolingi eloko mosusu te kaka koleka na makolo.”+ 20 Kasi alobaki kaka ete: “Okoleka te.”+ Na yango, Edome abimaki na bato ebele mpe na limpinga* ya nguya mpo na kokutana na ye. 21 Bongo Edome aboyaki kopesa Yisraele nzela ya koleka na teritware na ye; yango wana Yisraele azwaki nzela mosusu.+

22 Bato ya Yisraele, liyangani mobimba, balongwaki na Kadeshe mpe bakómaki na Ngomba Hore.+ 23 Bongo Yehova alobaki na Moize mpe na Arona, na Ngomba Hore, pene na ndelo ya mokili ya Edome ete: 24 “Arona akoyanganisama na bato na ye.*+ Akokɔta te na mokili oyo nakopesa Bayisraele, mpo bino mibale botombokelaki etinda na ngai na likambo ya mai ya Meriba.+ 25 Zwá Arona ná mwana na ye Eleazare mpe matá na bango na Ngomba Hore. 26 Longolá Arona bilamba na ye ya bonganga-nzambe+ mpe latisá yango Eleazare+ mwana na ye, mpo Arona akokufa kuna.”*

27 Bongo Moize asalaki kaka ndenge Yehova apesaki mitindo, mpe bamataki na Ngomba Hore na miso ya liyangani mobimba. 28 Na nsima, Moize alongolaki Arona bilamba na ye mpe alatisaki yango Eleazare mwana na ye. Nsima na yango, Arona akufaki kuna na nsɔngɛ ya ngomba.+ Mpe Moize ná Eleazare bakitaki na ngomba yango. 29 Ntango liyangani mobimba emonaki ete Arona akufaki, ndako mobimba ya Yisraele elelaki Arona mikolo 30.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto