Nzembo
Epai ya mokambi ya nzembo; na ebɛtɛlo ya “Bafololo lísi.” Bokundoli. Mondule ya Asafe.+
4 Yehova Nzambe ya mampinga, tii ntango nini okosilikela bato na yo mpe okoboya koyoka mabondeli na bango?+
5 Osali ete mai ya miso na bango ekóma lokola limpa mpo na bango,
Mpe ozali komɛlisa bango mai ya miso mingi mpenza.
6 Otiki ete bato oyo bafandi penepene báwelana mpo na biso;
Banguna na biso bazali kaka kosɛka biso ndenge balingi.+
8 Olongolaki nzete ya vinyo+ na Ezipito.
Obenganaki bikólo mpe olonaki yango.+
10 Bangomba ezipamaki na elili na yango,
Mpe banzete ya sɛdrɛ ya Nzambe na bitape na yango.
12 Mpo na nini okweisi bifelo ya mabanga ya elanga ya vinyo,+
Mpo baoyo nyonso bazali koleka na balabala bábuka mbuma na yango?+
14 Ee Nzambe ya mampinga, nabondeli yo, zongá.
Uta na likoló talá mpe moná!
16 Nzete ya vinyo eziki na mɔtɔ,+ ekatami.
Na mpamela na yo,* bazali kobeba.
17 Lobɔkɔ na yo esalisa moto oyo azali na lobɔkɔ na yo ya mobali,
Mwana ya moto oyo okómisi makasi mpo na yo moko.+
18 Bongo tokopesa yo mokɔngɔ te.
Batelá biso na bomoi, mpo tóbelela nkombo na yo.