Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 2
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 1 Samwele

      • Libondeli ya Hana (1-11)

      • Masumu ya bana mibale ya Eli (12-26)

      • Yehova akateli libota ya Eli etumbu (27-36)

1 Samwele 2:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “atomboli liseke.”

Mitindami

  • +Nz 13:6; Lk 1:46

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, lok. 57

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2010, lok. 17

1 Samwele 2:2

Mitindami

  • +Kob 15:11; Mib 4:35; Nz 73:25; 86:8; 89:6
  • +Mib 32:4

1 Samwele 2:3

Mitindami

  • +Yb 36:4; 37:16; Ro 11:33

1 Samwele 2:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bazali kobɛta libaku.”

Mitindami

  • +Yis 40:29

1 Samwele 2:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “akauki.”

Mitindami

  • +Lk 1:53
  • +1Sa 1:11, 20

1 Samwele 2:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “azongisaka na bomoi.”

  • *

    To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Mib 32:39; Yb 14:13; Nz 30:3; 49:15; 68:20; Hos 13:14; Yn 11:24; 1Ko 15:55

1 Samwele 2:7

Mitindami

  • +Mib 8:18; 28:12; 2Nt 1:11, 12; Yb 42:12; Mas 10:22
  • +Nz 75:7

1 Samwele 2:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “ekunde to fulu ya bosɔtɔ.”

  • *

    To, “mabele oyo ebotaka.”

Mitindami

  • +Nz 113:5, 7; Lk 1:52
  • +Nz 102:25

1 Samwele 2:9

Mitindami

  • +Nz 91:11; 97:10; 121:3
  • +Nz 37:28
  • +Nz 33:16; Zek 4:6

1 Samwele 2:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “baoyo bazali kobunda na Yehova bakozala na nsɔmɔ.”

  • *

    Lil., “akotombola liseke.”

Mitindami

  • +Kob 15:6
  • +1Sa 7:10; 2Sa 22:14; Nz 18:13
  • +Nz 96:13; Mis 17:31
  • +Nz 2:6; 110:1; Mt 28:18
  • +Lk 1:69; Mis 4:27

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, lok. 57

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2010, lok. 17

    15/3/2005, lok. 21

1 Samwele 2:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “azalaki kosalela.”

Mitindami

  • +1Sa 1:11; 3:1, 15

1 Samwele 2:12

Mitindami

  • +1Sa 2:22

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, lok. 61

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/10/2010, lok. 15

1 Samwele 2:13

Mitindami

  • +Le 7:34

1 Samwele 2:15

Mitindami

  • +Le 3:3-5

1 Samwele 2:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “oyo molimo na yo ezali na mposa na yango.”

Mitindami

  • +Le 3:16; 7:25, 31

1 Samwele 2:17

Mitindami

  • +1Sa 2:29

1 Samwele 2:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “kolata na loketo.”

Mitindami

  • +1Sa 2:11; 3:15
  • +2Sa 6:14

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, lok. 61

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/10/2010, lok. 15

1 Samwele 2:19

Mitindami

  • +Kob 23:14; 1Sa 1:3, 21

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, nk. 57-58

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2010, lok. 18

1 Samwele 2:20

Mitindami

  • +1Sa 1:27, 28

1 Samwele 2:21

Mitindami

  • +Eb 21:1, 2; 1Sa 1:19
  • +1Sa 2:26; 3:19

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, lok. 63

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/10/2010, lok. 16

1 Samwele 2:22

Mitindami

  • +1Sa 2:12-17
  • +Kob 38:8; Le 21:6

1 Samwele 2:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “Nzambe akokata likambo na ye.”

Mitindami

  • +Mit 15:31; 1Sa 2:17; 3:13, 14
  • +Mas 29:1; 30:17

1 Samwele 2:26

Mitindami

  • +1Sa 2:21

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/12/2002, lok. 25

1 Samwele 2:27

Mitindami

  • +Kob 4:14, 27

1 Samwele 2:28

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “mpo na komatisa milinga ya mbeka.”

  • *

    Lil., “bana ya Yisraele.”

Mitindami

  • +Kob 28:1; Le 8:12; Mit 17:5, 8
  • +Mit 18:7
  • +Le 2:3; 6:16; 10:14; Mit 5:9; 18:9

1 Samwele 2:29

Mitindami

  • +Kob 25:8; Yos 18:1; 1Sa 1:3
  • +1Sa 2:14-16

1 Samwele 2:30

Mitindami

  • +Kob 28:43
  • +Nz 18:20; 91:14

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/2/2013, nk. 25-26

1 Samwele 2:31

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “nakokata lobɔkɔ.”

Mitindami

  • +1Sa 3:14; 4:11, 18; 22:18; 1Ba 2:27

1 Samwele 2:32

Mitindami

  • +Nz 78:60, 61

1 Samwele 2:33

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “akolɛmbisa molimo na yo.”

Mitindami

  • +1Sa 22:18, 21

1 Samwele 2:34

Mitindami

  • +1Sa 4:11, 17

1 Samwele 2:35

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “na boyokani na motema na ngai mpe molimo na ngai.”

Mitindami

  • +1Ba 2:27, 35; 1Nt 29:22

1 Samwele 2:36

Mitindami

  • +Le 2:3; Mit 5:9

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Sa. 2:1Nz 13:6; Lk 1:46
1 Sa. 2:2Kob 15:11; Mib 4:35; Nz 73:25; 86:8; 89:6
1 Sa. 2:2Mib 32:4
1 Sa. 2:3Yb 36:4; 37:16; Ro 11:33
1 Sa. 2:4Yis 40:29
1 Sa. 2:5Lk 1:53
1 Sa. 2:51Sa 1:11, 20
1 Sa. 2:6Mib 32:39; Yb 14:13; Nz 30:3; 49:15; 68:20; Hos 13:14; Yn 11:24; 1Ko 15:55
1 Sa. 2:7Mib 8:18; 28:12; 2Nt 1:11, 12; Yb 42:12; Mas 10:22
1 Sa. 2:7Nz 75:7
1 Sa. 2:8Nz 113:5, 7; Lk 1:52
1 Sa. 2:8Nz 102:25
1 Sa. 2:9Nz 91:11; 97:10; 121:3
1 Sa. 2:9Nz 37:28
1 Sa. 2:9Nz 33:16; Zek 4:6
1 Sa. 2:10Kob 15:6
1 Sa. 2:101Sa 7:10; 2Sa 22:14; Nz 18:13
1 Sa. 2:10Nz 96:13; Mis 17:31
1 Sa. 2:10Nz 2:6; 110:1; Mt 28:18
1 Sa. 2:10Lk 1:69; Mis 4:27
1 Sa. 2:111Sa 1:11; 3:1, 15
1 Sa. 2:121Sa 2:22
1 Sa. 2:13Le 7:34
1 Sa. 2:15Le 3:3-5
1 Sa. 2:16Le 3:16; 7:25, 31
1 Sa. 2:171Sa 2:29
1 Sa. 2:181Sa 2:11; 3:15
1 Sa. 2:182Sa 6:14
1 Sa. 2:19Kob 23:14; 1Sa 1:3, 21
1 Sa. 2:201Sa 1:27, 28
1 Sa. 2:21Eb 21:1, 2; 1Sa 1:19
1 Sa. 2:211Sa 2:26; 3:19
1 Sa. 2:221Sa 2:12-17
1 Sa. 2:22Kob 38:8; Le 21:6
1 Sa. 2:25Mit 15:31; 1Sa 2:17; 3:13, 14
1 Sa. 2:25Mas 29:1; 30:17
1 Sa. 2:261Sa 2:21
1 Sa. 2:27Kob 4:14, 27
1 Sa. 2:28Kob 28:1; Le 8:12; Mit 17:5, 8
1 Sa. 2:28Mit 18:7
1 Sa. 2:28Le 2:3; 6:16; 10:14; Mit 5:9; 18:9
1 Sa. 2:29Kob 25:8; Yos 18:1; 1Sa 1:3
1 Sa. 2:291Sa 2:14-16
1 Sa. 2:30Kob 28:43
1 Sa. 2:30Nz 18:20; 91:14
1 Sa. 2:311Sa 3:14; 4:11, 18; 22:18; 1Ba 2:27
1 Sa. 2:32Nz 78:60, 61
1 Sa. 2:331Sa 22:18, 21
1 Sa. 2:341Sa 4:11, 17
1 Sa. 2:351Ba 2:27, 35; 1Nt 29:22
1 Sa. 2:36Le 2:3; Mit 5:9
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
  • 36
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Samwele 2:1-36

Mokanda ya liboso ya Samwele

2 Bongo Hana abondelaki boye:

“Motema na ngai ezali kosepela mpo na Yehova;+

Yehova abakisi makasi* na ngai.

Nafungoli monɔkɔ mpo na kosɛka banguna na ngai,

Mpo nasepeli na misala na yo ya kobikisa.

 2 Moko te azali mosantu lokola Yehova,

Mosusu azali te kaka yo,+

Mpe libanga moko te epikami makasi lokola Nzambe na biso.+

 3 Bólobaka na lolendo te,

Eloko moko ya lofundo ebima na monɔkɔ na bino te,

Mpo Yehova azali Nzambe ya boyebi,+

Mpe amekaka misala nyonso na bosembo.

 4 Matimbo ya mibali ya nguya ebukanibukani,

Kasi baoyo balɛmbi* bazwi makasi.+

 5 Baoyo bazalaki kolya malamu bakómi koluka mosala mpo na kozwa limpa,

Kasi baoyo bazalaki na nzala bazali lisusu na nzala te.+

Ekomba aboti bana nsambo,+

Kasi mwasi oyo azalaki na bana mibali ebele akómi ekomba.*

 6 Yehova abomaka mpe abatelaka na bomoi,*

Akitisaka na Nkunda,* mpe abimisaka.+

 7 Yehova akómisaka moto mobola, to mozwi;+

Akitisaka, mpe atombolaka.+

 8 Atombolaka moto mpamba longwa na putulu;

Abimisaka mobola na ebele ya putulu ya mɔtɔ,*+

Mpo na kofandisa bango esika moko na bankumu,

Apesaka bango kiti ya lokumu.

Miboko ya mabele ezali ya Yehova,+

Mpe atye mokili* likoló na yango.

 9 Abatelaka makolo ya bato na ye ya sembo;+

Kasi bato mabe bakokufa na kati ya molili,+

Ezali mpo na nguya te nde moto alongaka.+

10 Yehova akosilisa bato oyo bazali kobundisa ye;*+

Longwa na likoló, akogangela bango lokola nkake.+

Yehova akosambisa tii na bansuka ya mabele,+

Akopesa mokonzi na ye nguya,+

Mpe akobakisa makasi* ya moto na ye oyo atyami mafuta.”+

11 Na nsima, Elekana akendaki na ndako na ye na Rama, kasi mwana yango ya mobali akómaki mosaleli ya* Yehova+ liboso ya nganga-nzambe Eli.

12 Nzokande, bana mibali ya Eli bazalaki bato mabe;+ bazalaki kotosa Yehova te. 13 Na esika ya kozwa eteni oyo banganga-nzambe basengelaki kozwa+ ntango moto ayei kopesa mbeka, bango bazalaki kosala boye: Mbala nyonso oyo moto azalaki kopesa mbeka, mosaleli moko ya nganga-nzambe azalaki koya na nkanya ya mino misato ntango mosuni ezalaki naino kotɔka, 14 mpe azalaki kotuba yango na kati ya saani monene, na kati ya nzungu ya mabɔkɔ mibale, na kati ya nzungu ya monene, to na kati ya nzungu ya lobɔkɔ moko. Eloko nyonso oyo nkanya ezalaki kobimisa, nganga-nzambe azalaki kozwa yango mpo na ye moko. Ndenge wana nde bazalaki kosalela Bayisraele nyonso oyo bazalaki koya na Shilo. 15 Lisusu, liboso kutu mafuta ya nyama oyo moto amemi mpo na kopesa mbeka etumbama mpe ebimisa milinga,+ mosaleli ya nganga-nzambe azalaki koya mpe koloba na moto oyo ayei kopesa mbeka yango ete: “Pesá nganga-nzambe mosuni mpo atumba. Akolinga te opesa ye mosuni oyo batɔkisá, alingi kaka mosuni ya mobesu.” 16 Soki moto yango alobi na ye: “Zelá básala naino ete mafuta ebimisa milinga,+ na nsima, okozwa eloko nyonso oyo olingi,”* ye azalaki koloba: “Te, pesá ngai yango sikoyo; soki te, nakozwa yango na makasi!” 17 Bongo lisumu ya basaleli yango ekómaki monene mpenza na miso ya Yehova,+ mpo mibali yango bazalaki komemya likabo ya Yehova te.

18 Nzokande, Samwele azalaki kosala mosala+ liboso ya Yehova; azalaki kolata* efode ya lini,+ atako azalaki naino mwana moke. 19 Lisusu, mbula na mbula mama na ye azalaki kosalela ye mwa kazaka ezangá mabɔkɔ, mpe komemela ye yango ntango azalaki kokende elongo na mobali na ye mpo na kopesa mbeka ya mbula na mbula.+ 20 Mpe Eli apambolaki Elekana ná mwasi na ye mpe alobaki boye: “Tiká ete Yehova apesa yo mwana na nzela ya mwasi oyo, azala na esika ya mwana oyo bodefisaki Yehova.”+ Bongo bazongaki epai na bango. 21 Yehova atyelaki Hana likebi mpe azwaki zemi;+ mpe abotaki bana mibali mosusu misato mpe bana basi mibale. Nzokande elenge Samwele azalaki se kokola liboso ya Yehova.+

22 Bongo Eli akómaki mobange mpenza, kasi ayokaki makambo nyonso oyo bana na ye bazalaki kosalela+ Bayisraele nyonso, mpe ndenge bazalaki kolala na basi oyo bazalaki kosala na ekɔtelo ya hema ya kokutana.+ 23 Azalaki kaka koloba na bango boye: “Mpo na nini bozali kosala makambo ya boye? Mpo makambo oyo nazali koyoka epai ya bato nyonso mpo na bino ezali mabe. 24 Te, bana na ngai, nsango oyo nazali koyoka bato ya Yehova bazali kotambwisa mpo na bino ezali malamu te. 25 Soki moto asaleli moninga lisumu, moto mosusu akoki kobondela Yehova mpo na ye;* kasi soki moto asaleli Yehova lisumu,+ nani akoki kobondela mpo na ye?” Nzokande, baboyaki koyokela tata na bango, mpo Yehova azwaki ekateli ya koboma bango.+ 26 Na ntango wana, elenge Samwele azalaki se kokola. Yehova mpe bato bazalaki kosepela na ye mingi.+

27 Mosakoli moko ya Nzambe ayaki epai ya Eli mpe alobaki na ye: “Talá oyo Yehova alobi: ‘Ngai nde namimonisaki mpenza epai ya ndako ya nkɔkɔ na yo ntango ye ná libota na ye bazalaki baombo na ndako ya Farao na Ezipito, boye te?+ 28 Mpe naponaki ye kati na mabota nyonso ya Yisraele,+ mpo azala nganga-nzambe na ngai mpe amata na etumbelo na ngai+ mpo na kopesa mbeka, mpo na kotumba mpaka ya malasi,* mpe mpo na kolata efode liboso na ngai. Mpe napesaki ndako ya nkɔkɔ na yo makabo nyonso ya Bayisraele* oyo etumbami na mɔtɔ.+ 29 Mpo na nini bozali kotyola mbeka na ngai mpe likabo na ngai oyo napesaki mitindo ete esengeli kopesama na ndako na ngai?+ Mpo na nini ozali kokoba kokumisa bana na yo koleka ngai, na ndenge bozali kolya biteni oyo eleki malamu ya likabo nyonso oyo bato na ngai Bayisraele bazali kopesa?+

30 “‘Yango wana Yehova, Nzambe ya Yisraele alobi boye: “Ya solo, nalobaki ete bato ya ndako na yo mpe bato ya ndako ya nkɔkɔ na yo bakotambola ntango nyonso liboso na ngai.”+ Kasi sikoyo, Yehova alobi: “Ekosalema lisusu bongo te, mpo baoyo bazali kopesa ngai lokumu, ngai mpe nakopesa bango lokumu,+ kasi baoyo bazali kotyola ngai, nakotala bango lokola eloko mpamba.” 31 Talá! Na mikolo ezali koya, nakosilisa nguya* na yo mpe nguya ya ndako ya nkɔkɔ na yo, mpo moto moko te ya libota na yo akokóma mobange.+ 32 Wana makambo ya Yisraele ekotambola malamu, okomona monguna na yo na kati ya ndako na ngai;+ mpe ata mokolo moko te moto moko akokóma mobange na libota na yo. 33 Moto na yo moko oyo nakolongola te na mosala na etumbelo na ngai akosala ete miso na yo elɛmba mpe akomemela yo mpasi,* kasi bato mingi ya libota na yo bakokufa na mopanga.+ 34 Mpe likambo oyo ekokómela bana na yo mibale Hofini ná Finehase, ekozala elembo mpo na yo: Bango nyonso mibale bakokufa mokolo moko.+ 35 Na nsima, nakotya nganga-nzambe moko ya sembo mpo na ngai.+ Akosala makambo oyo motema na ngai elingi;* mpe nakosala ete bakitani na ye bázala banganga-nzambe mpo na libela, mpe akotambola ntango nyonso liboso ya moto oyo natye mafuta. 36 Moto nyonso oyo akotikala na ndako na yo akoya kogumbamela ye mpe kobondela ye ete apesa ye mosala mpo azwa mwa mbongo mpe limpa; mpe akoloba: “Nabondeli yo, kómisá ngai nganga-nzambe mpo nazwaka mwa eloko ya kolya.”’”+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto