Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g96 Janvier nk. 20-21
  • Kolongola bosɔtɔ na mwango babéngi Compostage

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kolongola bosɔtɔ na mwango babéngi Compostage
  • Lamuká!—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Esika ya kolongola bosɔtɔ oyo ekeseni na mosusu nyonso
  • Mpo na nini kobatela zamba, mai mpe mopepe?
    Lamuká!—2008
Lamuká!—1996
g96 Janvier nk. 20-21

Kolongola bosɔtɔ na mwango babéngi Compostage

EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA FINLANDE

LOKOLA bosɔtɔ zingazinga na bato ezali bobele koyikana, yango ezali kobimisa moko na mikakatano minene na ntango na biso. Batekiniki ya sika ezali kotondisa biso na salité mpe ezalaka mpenza mpasi mpo tokoka kolongola yango. Myango oyo bato bazalaki kosalela kala mizali kobimisa matomba mabe. Lokola bosɔtɔ ekoki kobebisa mai oyo mazwami na nsé ya mabelé, mikili mingi mipekisi kokunda bosɔtɔ. Kotumba bosɔtɔ ekoki mpe kobimisa substances toxiques na mputulu, yango nyonso wana ebimisaka mpe mikakatano na yango. Masini ya tekiniki makasi mpo na kokómisa bosɔtɔ mbala moko mputulu mayebani mpenza te bipai mingi. Esengeli kosala nini na mputulu mpe substances toxiques oyo ebimisami.

Mwango nini motikali? Basusu bazali kokanisa na mwango oyo etalelaka kolongola bosɔtɔ ya biloko ya makasi​—lolenge moko ya “kokómisa yango mputulu” mpe mwango yango mobéngami compostage. Lokola combustion, compostage ekómisaka bosɔtɔ lokola biloko binyatami, na kobimisáká molungé. Biloko binyatami oyo biuti na compostage bisengeli mpenza kosalelama. Mpema mpe molungé ekoki kosalelama lokola bipeseli ya nguya. Mpe biloko binyatami, bipɔli, bizali malamu mpenza mpo na milóna.

Mwango ya kolongola bosɔtɔ na compostage ezali koyebana mingi na bato. Na ndakisa, bingumba Korsholm mpe Vaasa, na Finlande, ezali na kompanyi ya kolongola bosɔtɔ na mwango babéngi compostage. Babandisi na yango bazwaki mwango ya kosilisa mikakatano mibale na mbala moko. Mabanga ya mikemike mpo na botongi bandako mpe kobongisa banzela mazali mingi te. Na yango, bazwaki likanisi ya kotimola libulu mozindo ya bamɛ́tɛlɛ 40 na esika ya mabanga. Nsima na kobimisa mabondo minene ya mabanga, masini emonanaki sikawa mpo na kolongola bosɔtɔ kati na mboka. Lokola ezingami na mabanga makasi, yango ezali kopesa nzela na masini yango ete ezala na molungé molongobani na ntango ya kobongola bosɔtɔ.

Matomba nini mamonani? Na bonene mpenza, kompanyi wana ya sika ezali kosilisa mokakatano ya bosɔtɔ na mboka. Ezali kolongola bosɔtɔ na 75 % mpe kiló na yango na 66 %. Ndenge nini ekoki kosalema? Tiká totala esika yango ezwami.

Esika ya kolongola bosɔtɔ oyo ekeseni na mosusu nyonso

Ntango tokómaki, tokamwaki liboso mpenza na bokeseni na yango na bisika mosusu oyo bazali kobwaka bosɔtɔ. Mpóko izali te, mpe nsolo mabe ezali te. Awa kolongola bosɔtɔ emonani lokola kompanyi oyo esalaka biloko.

Mokambi na yango alakisi biso liboso etánda ya makambo oyo mazali kosalema kati na kompanyi yango. Salité ya mingi esalemaka na myango mibale​—liboso compostage mpe na nsima kopɔlisa yango. Na ntango ya compostage, salité ebongolamaka na mopɛpɛ; nzokande na ntango ya kopɔlisa, epɔtɔnɔkɔ kozanga kobebisa mopɛpɛ. Kasi liboso ya kobanda kosala myango wana mibale, salité yango eminyolamaka.

Longwa na lininisa ya esika ya kotalela bamasini, tomoni motuka ya bosɔtɔ ezali kokɔta na ekuke moko monene na kozongáká nsima. Ebwaki bosɔtɔ na eloko moko lokola linkongo ya monene, kuna nkamba moko ezali kotondisa yango kati na masini ya kobukabuka. Biloko ya monene lokola bakarakasi ya veló, yiika ya mituka, mipépé ya milinga mpe biloko mingi ya kopale bilekisami pembeni na lisalisi ya zɛ́ki. Moyambi na biso alobaki ete soki bikanga ya bafrigo mpe bakonjelatere emonani, batindaka yango ete bábongisa yango mpe na nsima batɛkisaka yango na mikili ya bobóla.

Nsima ya kotutatuta ya liboso, salité elekisamaka na masini moko epai kuna efinamaka mpe eloko nyonso ekómaka na bolai ya bamilimɛtɛlɛ 50. Oyo etikali mwa nsingansinga ekoleka na eteni ya liboso ya kosalelama, yango ebéngami compostage. Yango esalemaki kati na tánki monene kati na yango salité oyo epɔtɔni esangani na milangi oyo miutaka na kompanyi ya kopɛtola mai ya engumba.

Moyambi na biso alobi ete: “Wana tozali kokólisa mwango oyo, tozalaki ntango nyonso komibanzabanza mpo na ezingelo, na yango, tokamataka kutu putulu oyo ebimaka na ntango ya kotutatuta bosɔtɔ. Lisusu, tobimisaka mopɛpɛ na tánki oyo esalaka compostage esika oyo kosangisama ya bosɔtɔ na milangi ya mpamba ebongisamaka mpe etɔkisamaka soko na molungé ya 40° C. Mpo na kobongolama ya aérobie, mopɛpɛ oyo mokobima mokoki kozala na nsolo mabe soki tokɔngɔlaki yango te.”

Nsima ya mikolo mibale to misato kati na compostage, bosɔtɔ eleki kati na masini monene ya mɛ́tɛlɛ 40. Nini esalemaka awa? Bosɔtɔ wana nyonso bobongwanaka bactéries oyo ekoki kobika kozanga oxygène. Eteni wana ebéngami kopɔlisama. Ekamataka mikolo 15 na molungé ya 35° C. Biloko ya nsuka oyo bizwamaka ezali bongo gaz biologique mpe bipɔli mpo na milóna, oyo ezalaka na 85 % kino 90 % ya mai. Mai yango mingi makamolamaka mpe mazongaka kati na masini.

Nini ekómelaka ndambo ya salité oyo etikalaka kati na tánki? Motambwisi na biso alobi ete ndambo wana ekómaka biloko oyo bikoki kozika pamba te ezalaka bobele nkasa mpe kopale. Kasi mpo na kotumba mintika na lolenge ya malamu esɛngaka molungé ya 1 000° C.​—mpe masini ya kotumba mazali te zingazinga wana. Alobi ete: “Yango wana totutatutaka salité oyo etikalaka mbala moko lisusu mpe tozongisaka yango lisusu na kobongolama. Ezali solo ete bakopale ekoki kobongolama te, kasi mintika yango ezalaka mingi nkasa, oyo ekómaka bipɔli mpo na milóna.”

Mwango wana mobimisaka nini? Moyambi na biso ayanoli ete: “Biloko mibale ya ntina: bipɔli mpo na milóna mpe gaz biologique. Bipɔli totɛkaka yango mpo na kosala bitando ya milóna mpe kobongisa bisika ya kala oyo bazalaki kobwaka bosɔtɔ. Mposa ezali makasi mpo na bipɔli yango sikawa pamba te bisika mosusu ya kobwaka bosɔtɔ bisila kokangama. Etikali totalela soki ekoki kosalema mpo na kolóna na yango bilanga nsima ya kolongola milangi mpe bakopale. Gaz biologique ezali na 60 % ya méthane mpe 40 % ya gaz carbonique. Mpo na lolenge na yango, ekokani na gaz oyo ya solosolo mpe basalelaka yango motindo moko. Nzela moko ya kolekisa ekabolaka yango na bakompanyi oyo ezali pembeni.”

Ezali boni mpo na bibende ya kiló oyo bizwami kati na bosɔtɔ mpe milangi ya pamba? Moyambi na biso alobi ete: “Bibende wana ya kiló totyaka yango na mai. Na bongo, tozali kokana kosomba bisaleli mpo na kobimisa bibende longwa na mai. Na yango, mosala na biso ekokokisa bamposa nyonso. Soki tozali kolobela mikolo ya nsima, nasengeli koyebisa bino na ntina na ndɔ́tɔ na ngai, oyo ezali ete mabota nyonso makokɔngɔlɔ bosɔtɔ na bango, na yango tokozwa lisusu milangi te, bakopale te, bibende mpe te. Biloko wana nyonso bikoki kokɔngɔlama. Ata mpe textiles synthétiques, bakopale mpe bakausu ekoki mpe kokɔngɔlama.”

Kompanyi ezali na likoki ya kosala mosala ya bosɔtɔ oyo ebwakami na bato 100 000. Yango ezali na ntina mingi na Finlande. Kino mobu 2000, mokili wana ezali na mokano ya kosalela katikati ya bosɔtɔ na yango​—na lolenge ya lontiliki to bipɔli ya ntalo.

Mobembo na biso mopesi biso bilembeteli ya solo ete myango mizali mpo na kosalela bosɔtɔ. Mokomoko na biso akoki kosala elongo na ebongiseli ya kolongola bosɔtɔ oyo etyami na esika ye afandi. Liboso ete tókende, totuni motambwisi na biso soki bakompanyi motindo wana ya kolongola bosɔtɔ na lolenge ya malamu ezali. Ayanoli ete: “Yango ezali mpasi mpo na kolobela. Nakanisi ete kompanyi ya motindo oyo ezali esika mosusu te. Mbala mosusu mikakatano ya bosɔtɔ mizali mingi koleka na bisika mingi na boye ete moto moko te alingi komeka mwango oyo.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto