Mboka moko etongami likoló ya makonzí minene
Euti na mokomani na biso na Benin
“GANVIÉ ezali moko ya bisika oyo ebendaka likebi ya baturiste na Benin,” wana maloba oyo makomami na mokanda mpo na basáli-mobembo na Afrika ya Wɛ́sti. Mosusu elobaki ete: “Baafrika bango moko bakamwaka na Ganvié; okomona baturiste ya Afrika mpe ya Mpótó.”
Ya solo, Ganvié ekeseni mpenza na mboka mosusu. Ezali mboka moko na bafandi 15 000 oyo etongami likoló ya makonzí minene na mai ya Láki Nokoué, na nɔ́rdi ya Cotonou, na Benin. Na Ganvié, velo ezali te, mituka mizali te, nzela ya bato ya makolo ezali te, babalabála mpe ezali te. Soki bafandi na yango balingi kokenda na kelasi, na zándo, na lopitalo, na ndako ya moninga ya pembeni, to esika mosusu, bakɔtaka na bwato oyo esalemi na nzeté ebéngami iroko.
Mabota ebele mazalaka na babwato mingi—moko mpo na tata, moko mpo na mama, mpe mbala mosusu moko mpo na bana. Bana bayekolaka kolúka wana bazali naino bilenge mpenza. Ntango akokisi mibu mitano, mwana akoki kolúka na bwato ye moko. Nokinoki akokóma na mpiko oyo ekoki mpo na kolúka na bwato ye moko mpo na kotya mwa mozanga ya mbisi na mai. Bilenge mosusu basepelisaka bapaya na kosaláká lisano ya kotɛlɛma motó na nsé makolo likoló kati na bwato.
Na zándo ya Ganvié oyo esalemaka likoló ya mai, bato ya mombongo, mingimingi basi bafandaka kati na babwato na bango elongo na biloko na bango oyo etyamaka liboso na bango—biloko mikemike, mbuma, mbisi, minɔ́, nkoni, masanga, mpe ata baradyó. Wana bazipami na nsé ya moi makasi na binkɔti na bango ya minene, bazali kotekisa biloko epai na basusu oyo balúkaka kino kuna mpo na kosomba. Mbala mosusu bateki bazalaka bilenge basi. Kolɛmba nzoto te mpo na mbula na bango! Uta bomwana na bango bayekolaka ntɔ́ki ya koteka mpe mwango ya kokakola.
Wana basi bazali kosomba mpe koteka biloko na zándo, mibali bazali koluka mbisi, to mpo na koloba na bosikisiki bazali kosala mosala esika babɔkɔlaka mbisi. Mwango na bango ya kokanga mbisi ezalaka ya kotya ebele ya bitape ya nzeté kati na pɔtɔpɔ́tɔ, oyo ekosala mwa zamba moke. Mbisi mingi eyaka kolya kati na bitape ya nzeté wana oyo epɔli. Nsima ya mwa mikolo mibali bazongaka na bisika wana elongo na malóló na bango mpo na kokanga mbisi.
Longwa na ekimelo kino esika ya kobenda likebi ya baturiste
Toffinu ya Ganvié bazalaki ntango nyonso “bana mai te,” lolenge bango bayebani lelo oyo. Na ebandeli ya ekeke ya 18, bakimaki na láki mpe na bitíma mpo na monyoko ya bokonzi moko ya Afrika oyo ezalaki mpembeni na bango. Banganga-mayele balobaka ete nkombo Ganvié ezali komonisa lisoló yango, mpamba te na lokóta Toffin, liloba gan ekoki kobongolama na “tobiki” mpe liloba vie elimboli “etuluku ya bato.” Na yango, nkombo ya mboka-mokonzi ya bingumba mike ya láki ekoki kobongolama na mwa lolenge oyo ete “etuluku ya bato oyo basili kozwa kimya.”
Kolukáká ekimelo na etúká ya bitima zingazinga na Láki Nokoué ezalaki mwango moko malamu, mpamba te bindimeli ya mangomba ya bokonzi oyo ezalaki kotɛmɛla bango epesaki nzela ata na sodá moko te ete amibwaka na mai to na bisika oyo ekoki kozinda na mpela. Na bongo, láki epesaki bango mwango ya kobikela mpe kokima banguna. Likambo ya kobenda likebi ezali ete etuluku yango ya bato, oyo ebele ya baturiste bayaka kotala na mitɛ́lɛ ya mai, ezalaki kala ekimelo.