Mwasasu ya banyama
Soki moto moko asali mwasasu (bâillement) na miso ya bato, bakoki kokanisa ete azangi bonkonde—to alɛmbi mingi. Atako mibeko ya bonkonde mizali, mwasasu ezali mpenza na ntina. Mwasasu ezali komininola oyo eyaka yango moko. Na momeseno tosalaka mwasasu na mpokwa wana tolɛmbi na misala oyo tosalaki na boumeli ya mokolo to na ntɔ́ngɔ́ ntango tolamukaka. Mwasasu makasi esalisaka na kobenda mpema ya malamu mpe ekoki kolendisa biso mwa moke; mbala mingi ezalaka mpo na kolamuka na mpɔngi.
Kasi oyebaka ete banyama mpe basalaka mwasasu, atako ezalaka ntango nyonso te mpo na kobenda mpema ya malamu? Ntina oyo basalaka bongo ezali mpenza kokamwisa. Na ndakisa, makako mbala mosusu asalaka mwasasu mpo na kopesa nsango. Ntango afungoli monɔkɔ makasi mpe amonisi mino na nkanda, ezali lolenge ya kokebisa makako mosusu monguna ya mobali to nyama mosusu oyo alingi kotumola ye. Nsango oyo apesaka ntango asalaka mwasasu yango oyo: ‘Nazali na mino oyo ezali kobangisa. Kopusana pene na ngai te!’
Emonanaka mpe ete banyama oyo ezali kati na libota ya nkoi (félin) oyo efandaka na bisobe ya Afrika mbala mingi eminanolaka mpe esalaka mwasasu liboso ete elanda nyama moko oyo elingi kokanga. Lokola epai na bato, mwasasu ya nkoi ezali na litomba mpo na nzoto—kokɔtisa mopɛpɛ kati na mimpululu. Yango ematisaka mopɛpɛ malamu kati na makila. Na nsima motema etindaka yango na biteni mosusu ya nzoto, kopesáká nyama yango nguya ete ebanda mbangu makasi mpo na kolanda nyama oyo elingi kokanga.
Nzokande, emonanaki ete mbisi mpe esalaka mwasasu! Búku Inside the Animal World (Kati na mokili ya banyama) ezali kolobela mbisi oyo mbala mosusu “esalaka mwasasu liboso ya kotambola na lombangu mpenza. . . . Mbisi ekoki mpe kosala mwasasu ntango ebangi to ntango emoni monguna to emoni bilei, na mabaku nyonso oyo esengeli kosala likambo na lombangu.”
Ntango mosusu mwasasu oyo eleki kokamwisa ezali oyo ya ngubu. Ekelamo yango ya monene ekoki konanola mpe kofungola monɔkɔ na yango na bonene ya litumu ya degre 150! Mwasasu epesaka na ngubu mobali ya mokóló likoki ya kolakisa na bangubu mosusu nyonso oyo bazali na etima ete azali mokonzi. Esalisaka mpe mpo ete elakisa mino lokola likebisi epai na monguna nyonso oyo akoleka na teritware na ye.
Atako ezali lokola konguluma ya nkosi te, mwasasu—ezala oyo esalemi mpo na kolamuka na mpɔngi, mpo na kobangisa, to bobele mpo na kozwa nguya—ezali mpenza na litomba malamu. Yango ezali bobele moko na bandakisa mingi ya bozalisi ya kokamwa euti na Mokeli ya banyama!