Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g98 Janvier lok. 32
  • “Ezali búku ya liboso oyo atángaki na mobimba”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Ezali búku ya liboso oyo atángaki na mobimba”
  • Lamuká!—1998
Lamuká!—1998
g98 Janvier lok. 32

“Ezali búku ya liboso oyo atángaki na mobimba”

Mbala mingi Batatoli ya Yehova na ekólo Ukraine basololaka na bato oyo bazelaka engbunduka. Motatoli moko apesaki mwasi moko oyo amonisaki bosepeli búku Mokanda mpo na Masolo ya Biblia. Búku yango ezali na bililingi mingi ya masoló ya Biblia oyo malandani.

Nsima ya mwa mikolo, na esika bobele wana ya kozela engbunduka, mwasi yango amonaki Motatoli oyo apesaki ye búku yango mpe apesaki ye matɔ́ndi na kolobáká ete: “Mwana na ngai ya mobali alingaka kotánga babúku na ye ya kelasi te. Atángaka yango ata moke te. Kasi ntango napesaki ye Mokanda mpo na Masolo ya Biblia, amonaki bililingi mpe azalaki na mposa makasi ya kotánga yango. Atángaki búku yango na mobimba na boumeli ya pɔ́sɔ soko mibale. Ezali búku ya liboso oyo atángaki na mobimba. Kasi likambo lisepelisaki mingi ezalaki ete abandaki kozwa boyebi ya Nzambe. Mpe ngai nazali na esengo ya komona mbongwana epai na ye. Soki olingi, pesá ngai búku mosusu ya kotánga.”

Mwasi mosusu oyo azalaki pembeni wana alandaki lisoló na bango. Atunaki soki akoki kozwa búku Mokanda mpo na Masolo ya Biblia. Yo mpe okoki kozwa búku yango ya nkasa 256 to soki osepeli ete moto moko aya kotala yo na ndako mpo na komonisa yo litomba ya koyekola Biblia, okoki kotinda nkomá na Association “Les Témoins de Jéhovah,” B.P. 634 Limete, République démocratique du Congo, to na adrɛsi ebongi na yo na lokasa 5.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto