Nabɛlaka maladi ya “mucoviscidose”
LISOLO YA JIMMY GARATZIOTIS
Mokolo ya 25 Yuli 1998, nakɔtaki lopitalo mbangumbangu mpo nazalaki koyoka mpasi makasi na ntolo. Ezalaki mpasi ya motema te, kasi nazalaki na maladi na mimpululu mpe nazalaki kokoka kopema te. Nazalaki kaka na mbula 25 mpe bomoi na ngai ezalaki na likama.
MIKOLO mibale nsima ya kobotama na ngai, minganga bayebisaki baboti na ngai ete nazali na jaunisse makasi. Balobaki ete soki bazongisi ngai makila te, nakokufa to bɔɔngɔ na ngai ekosala lisusu malamu te. Bazongisaki ngai makila te mpe nabikaki—bɔɔngɔ na ngai ebebaki mpe te.
Mbula mibale na nsima, natungisamaki mingi mpo nzoto na ngai ezalaki kolɔngɔnɔ te, nazalaki kobɛla pneumonie. Nsukansuka, monganga moko amonaki ete nazali na maladi ebengami mucoviscidose. Na ntango wana, bana oyo bazalaki kobɛla maladi yango bakokaki koumela bobele mbula soko nsambo mpamba na bomoi. Kasi lokola bato ya siansi bakómi na mayele mingi na makambo ya minganga, bana mingi oyo bazali na mucoviscidose bazali kokóma mikóló.
Mucoviscidose ezali nini?
Mucoviscidose ezali maladi oyo bana bazwaka na baboti na bango mpe esilaka te. Epesaka mikakatano makasi ya kopema, mpe mbala mingi ebakisaka mikakatano na libumu mpamba te libumu ekonika bilei malamu te.
Pene na moto 1 kati na bato 25 azali na gène oyo epesaka maladi ya mucoviscidose. Mbala mingi, moto oyo azali na gène yango ayebaka te, mpamba te emonisaka ata elembo ya maladi yango te. Soki tata na mama babotamaki na ba gène yango, ntango mosusu mwana moko kati na bana minei akoki kozwa maladi ya mucoviscidose.
Maladi na ngai eyebanaki naino nazali mwana moke mpenza, likambo yango esalemaka mpenza mingi te, yango eyebanaki noki mpo na mwa bambuma (polypes) oyo ebimaki na kati ya madusu ya zolo na ngai. Lokola bamonaki mwa bambuma yango, minganga bazwaki ekateli ya kosala ekzamɛ ya mitɔki na ngai mpo na koyeba soki ezali na mungwa. Ekzamɛ yango nde esalemaka mingimingi mpo na koyeba soki moto azali na mucoviscidose. Mbala mingi baboti na bankɔkɔ nde bayokaka mungwa na nzoto ya mwana soki bapesi ye bizi na monɔkɔ.
Lokola mwa bambuma yango etondanaki na madusu ya zolo na ngai, ezalaki kopekisa ngai kopema malamu, na yango bazalaki kosala ngai lipaso mbula na mbula mpo na kolongola yango. Mapaso yango ezalaki kosala ngai mpasi, mpe mpota na yango ebelaka noki te. Ezalaka mpe likama mpamba te ekoki kobimisa makila mingi. Basalaki ngai lipaso mbala mingi, kasi nyonso esalemaki kozanga ete bázongisa ngai makila. Nazali mpenza na botɔndi mpo ete nanyokwami te na mikakatano oyo mbala mosusu eutaka na kozongisama makila!
Nazali kobunda na maladi yango
Atako maladi na ngai ezali kopekisa ngai kosala makambo mosusu, nazali komeka ntango nyonso komipesa na makambo oyo nakoki kosala. Mokolo ya 1 Augusto 1987 ezalaki mokolo ya ntina mingi na bomoi na ngai, nazwaki batisimo mpo na komonisa ete namipesi epai ya Yehova Nzambe.
Ntango nalamukaka na ntɔngɔ, nabendaka na mpema nkisi babengi bronchodilatateur, na nsima namelaka nkisi moko basangisi na mungwa. Yango elɛmbisaka bosɔtɔ oyo etondaka na mimpululu mpe efungolaka banzela na yango mpo nakoka kopema malamu. Mpo na kosalela bankisi yango nyonso, esɛngaka miniti 15. Na nsima, nasalaka ngalasisi ya kopema (kinésithérapie respiratoire) na boumeli ya miniti 40 tii 60 mpo salite oyo ezali na mimpululu na ngai ekóma maimai mpe ebima libanda. Na nsima, nabendaka lisusu na mpema antibiotique moko mpo na kobundisa mikrobe. Nasalaka bongo lisusu nsima ya midi mpe na mpokwa.
Ndenge misato wana ya kozwa nkisi esɛngaka ngonga soko minei mokolo na mokolo. Na momeseno, nalyaka nsima, mpamba te kozwa bankisi yango soki nalei naino eloko te ezalaka malamu koleka soki nalei. Atako nalekisaka ntango mingi mpo na komela bankisi, nasalaka makasi ya koyangana na makita nyonso ya lisangá ya lokota ya Greke na London, na etúká ya Ontario, na Canada. Na mpokwa ya mokolo ya makita, namisalisaka na ngonga ya 10:00 ya butu. Mpo na ngai, matomba oyo nazwaka na makita eleki makambo oyo namipimelaka mpo na koyangana na makita yango mosika. Kosakola mbala na mbala mpe ezali na ntina mingi mpo na ngai.
Nazali koyebisa na bato mosusu kondima na ngai
Ntango oyo nalekisaki na lopitalo epesaki ngai libaku ya koyebisa bato mosusu kondima na ngai. Mokolo moko, nasololaki na sango moko ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Bagreke. Sango yango azalaki na maladi na eteni mosusu ya ndako na lopitalo. Alobaki na ngai ete nazali na limemya mpe nazali ndakisa malamu mpo na bilenge Bagreke mosusu. Ayebaki te ete ngai nayebi ete ye azali motɛmɛli monene ya mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova kati na bato oyo balobaka lokota ya Greke.
Ntango bato bayaki kotala ye, atindaki bango mpe báleka kotala ngai. Bato yango bayebaki bilongi ya bandeko na ngai mpe baninga oyo bayaki kotala ngai mpamba te bakendaki kosakola na bandako na bango. Bamosusu batikalaki wana, kasi bamosusu bakamwaki mpe bazongaki kotuna sango mpo na nini atindaki bango bákenda kotala Batatoli ya Yehova. Ata ntango sango ayaki koyeba ete nazali Motatoli ya Yehova, tokobaki na masolo na biso ya Biblia. Tozalaki kolobela masolo lokola nkombo ya Yehova, Bosato, mpe mpo na nini Batatoli ya Yehova baboyaka kokɔta na makambo ya politiki na ekólo Grèce. Ntango tozalaki kosolola, nazalaki komona ndenge makanisi na ye ya botɛmɛli ezalaki kolongwa.
Sango yango andimaki ete makambo mosusu oyo tosololaki na Biblia ayebi ete ezali bongo, kasi alobaki ete ateyaka yango te mpo bálongola ye na mosala te. Na nsima, nakendaki kotala ye na ndako na ye elongo na Esther leki na ngai ya mwasi, mpe andimaki kozwa mikanda oyo elimbolaka Biblia. Na teritware na biso, botɛmɛli na mosala na biso ya kosakola ekitaki. Bato mingi oyo bayokaki ete sango akómi kosepela na solo babandaki kosolola na biso. Eumelaki te, batindaki sango yango epai mosusu.
Litatoli ya kondima na ngai oyo napesaki ntango nakɔtaki lisusu lopitalo elekaki mpamba te. Nasololaki na elenge moko na nkombo Jeff, ayaki kotala nkɔkɔ na ye ya mobali na lopitalo. Nsima ya masolo mingi, tobandaki koyekola Biblia. Na nsima, Jeff asepelaki koyangana na makita ya lisangá. Atako nazalaki liboso koyangana na makita na lisangá ya London, kasi na boumeli ya mwa ntango nakómaki kokenda na ye na lisangá ya Stratford pene na esika azalaki kofanda. Nalingaki ete ndeko moko oyo afandaka pene na ye asalisa ye.
Likambo ya mawa, Jeff abangaki bato ya libota na ye mpe atikaki kokenda makita mpe koyekola. Nzokande, ntango nazalaki koyangana na makita na Stratford, namonanaki mpe na Deanne Stewart. Tokutanaki liboso na ntango ya botongi Ndako ya Bokonzi. Tolinganaki mpe tobalanaki na mokolo ya 1 Yuni 1996.
Makambo ebongwani
Likambo ya mawa, kaka pɔsɔ misato mpamba nsima ya libala, nabɛlaki makasi. Yango esalaki ete nakóma kokɔta lopitalo mbala na mbala kino mokolo moko nakɔtaki lopitalo mbangumbangu, ndenge nalobelaki yango na ebandeli. Banda ntango wana nasengeli kopema na masini ya oxygène butu na moi. Nabundaka ntango nyonso na fiɛvrɛ, kotɔka na butu, pema mokuse (pleurésie), kozanga mpɔngi mpo na kɔsukɔsu, mpasi na matonga, na makolo, mpe na ntolo. Na bantango mosusu soki nazali kokɔsɔla nabimisaka makila, yango ezali likama mpamba te soki esili te, nakoki kokufa.
Sikawa, elongo na mwasi na ngai ya bolingo oyo azali kosunga mpe kosalisa ngai, napesaka litatoli epai ya minganga, minganga ya kinésithérapie, bato mosusu ya maladi mpe balifulume, ezala na lopitalo to na ndako ntango bayaka kosalisa ngai. Atako tozali na mikakatano mpo na nzoto na ngai, totalelaka mabaku yango nyonso lokola ntango ya kokumisa nkombo ya Yehova.
Makambo oyo ezali kosunga ngai sikawa
Mpo na maladi na ngai, ngai na Deanne tozali na telefone oyo epesaka biso likoki ya kolanda mpe kopesa biyano na makita ya lisangá. Ebongiseli wana ya bolingo elendisaka biso mingi mpe epesaka biso makanisi malamu ete tozali ntango nyonso na lisangá, atako tozalaka mpenza na Ndako ya Bokonzi te.
Lisusu, tosalaka sikawa mosala na biso ya kosakola na nzela ya telefone mpo na koyebisa bato mosusu kondima na biso. Tosili kobanda koyekola Biblia na bato mpe totambwisaka boyekoli yango na nzela ya telefone. Kolobela bato oyo toyebi te makambo ya Yehova mpe mokano na ye ya kopesa bato ya botosi mokili ya sika ya bosembo epesaka biso esengo mingi.
Lisalisi ya tata na mama na ngai elendisaka mpe ebɔndisaka ngai mingi. Nazali mpenza na nyongo monene epai ya Yehova na ndenge apesi ngai Deanne, atako nazali na maladi, andimi ngai mpe azali sikawa kosalisa ngai mingi mpo nayika mpiko.
Lokola nakómi na eteni ya nsuka ya maladi na ngai, komanyola likoló na elikya na ngai mpo na mikolo mizali koya elendisaka ngai nalɛmba te. Botángi ya Biblia mokolo na mokolo ebɔndisaka ngai na Deanne mingi. Nayebi ete, nokinoki na mikolo mizali koya, nakobika, mpe nakosengela lisusu na kosalisama te kaka mpo na kopema. Namimonaka ndenge nakobanda kopota na esobe, na Paladiso oyo Nzambe alaki, ntango nakozwa mimpululu ya malamu. Nyonso oyo nakoluka—kaka napota mbangu na esobe na boumeli ya mwa ntango molai mpo natalela ndenge mimpululu na ngai ekókoma.
Kokanisa mapamboli ya mokili ya sika oyo Nzambe alaki esalisaka ngai nayika mpiko mokolo na mokolo. Masese 24:10 elobi ete: “Soko okosenzwa na mokolo na mpasi, nguya na yo ezali bobele moke.” Na esika ete nayoka ete nguya na ngai esili, nayokaka ete Yehova azali kopesa ngai nguya oyo eleki nguya ya ngai moko. (2 Bakolinti 4:7) Yango esalisaka ngai napesa litatoli mpo na nkombo na ye mpe mpo na mikano na ye, mpe nayika mpiko na makambo oyo atiki nzela esalema—ezala kobika na nsuka ya mokili oyo na Armagedon to kokufa sikawa mpe kosekwa na nsima, na mokili ya sika.—1 Yoane 2:17; Emoniseli 16:14-16; 21:3, 4.
[Bililingi na lokasa 13]
Elongo na mwasi na ngai Deanne, oyo azali kosalisa ngai mingi