Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/10 nk. 28-31
  • Kondima esalisaki ngai na ntango ya mpasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kondima esalisaki ngai na ntango ya mpasi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bomoi ya esengo atako mwa mikakatano ezalaki
  • Tolakisaki mwana na biso kolinga Yehova
  • Etumba na kanser
  • Kondima ya Saúl elendisaki basusu
  • “Nasili kobatela kondima”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Nazali na bomoi ya mpasi
    Lamuká!—1994
  • “Ntango bozali kobondela, bóloba: ‘Tata’”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Tozali Banzambe te, Banganga-nkisi mpe te
    Lamuká!—1994
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/10 nk. 28-31

Kondima esalisaki ngai na ntango ya mpasi

Ya Soledad Castillo

Mbala mingi, liwa ebɔtɔlaki ngai bato oyo nazalaki kolinga mingi, kasi mokakatano yango elongaki ngai te. Ntango nazalaki na mbula 34, mobali na ngai akufaki. Mbula motoba na nsima, tata mpe akufaki. Sanza mwambe nsima ya liwa ya tata, eyebanaki ete mwana na ngai ya mobali azali na kanser.

NKOMBO na ngai Soledad, oyo elimboli “azangá bato.” Kasi likambo ya kokamwa, natikalá koyoka ata mokolo moko te ete nazangá mpenza bato. Na ntango ya mpasi, nazalaki komona ete Yehova azali na ngai, ‘asimbi ngai na lobɔkɔ mpe azali kosunga ngai mpo nabanga te.’ (Yisaya 41:13) Bóyoka nayebisa bino ndenge nalongaki bampasi oyo nakutanaki na yango mpe ndenge yango esalisaki ngai napusana penepene na Yehova.

Bomoi ya esengo atako mwa mikakatano ezalaki

Baboti na ngai, José ná Soledad, babotá ngai kaka ngai moko. Nabotamaki mwa 3 Mai 1961, na engumba Barcelone, na Espagne. Mama ayambaki solo ntango nazalaki na mbula libwa. Azalaki na mituna mingi na makambo ya Nzambe, kasi Lingomba na ye ezalaki kopesa ye biyano ya malonga te. Mokolo moko, Batatoli ya Yehova mibale bayaki epai na biso mpe bayanolaki na mituna na ye nyonso na lisalisi ya Biblia. Andimaki na esengo nyonso koyekola Biblia.

Nsima ya mwa ntango moke kaka, mama azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli ya Yehova, mpe mwa bambula na nsima, tata alandaki ndakisa na ye. Mosika te, ndeko Eliana, oyo ayekolaki na mama, amonaki ete ngai mpe nazali kosepela na Liloba ya Nzambe. Atako nazalaki mwana moke, Eliana ayebisaki mama ete ngai mpe nabanda koyekola Biblia. Na lisalisi na ye mpe na batoli ya mama, nazwaki batisimo ntango nazalaki na mbula 13.

Ntango nazalaki elenge, nazalaki kobondela Yehova mingi, mingimingi soki nalingi kozwa bikateli. Mpo na koloba solo, nakutanaki na mikakatano mingi te na bolenge na ngai. Na kati ya lisangá, nazalaki na baninga ebele, mpe nazalaki mpenza na boyokani na baboti na ngai. Na 1982, nabalaki Felipe, Motatoli moko oyo azalaki na mikano ya elimo lokola ngai.

Tolakisaki mwana na biso kolinga Yehova

Mbula mitano na nsima, nabotaki mwana moko kitoko ya mobali oyo topesaki nkombo Saúl. Ngai ná Felipe tosepelaki ndenge tobotaki. Tokanisaki ete Saúl akokola na nzoto malamu, akozala mwana moko ya mayele mpe akolinga Nzambe. Ngai ná Felipe tozalaki kolekisa ntango mingi na Saúl, tozalaki koyebisa ye makambo etali Yehova, kolya elongo, komema ye na parke mpe kosakana elongo. Saúl azalaki kosepela kobima na mosala ya kosakola elongo na Felipe, mpe Felipe asalisaki ye amesana na mosala yango banda bomwana wana azalaki kolakisa ye kobɛta baporte mpe kokabola batrakte.

Bolingo na biso mpe mateya oyo tozalaki kopesa ye esalisaki ye akola malamu. Ntango akómaki na mbula motoba, azalaki kobima na biso mbala na mbala na mosala ya kosakola. Azalaki kolinga koyoka masolo ya Biblia, mpe azalaki mpenza kozela boyekoli ya libota na motema likoló. Mwa moke nsima ya kokɔta kelasi, abandaki kozwa mwa bikateli na lisalisi ya mwa boyebi ya Biblia oyo azalaki na yango.

Nzokande, ntango Saúl akómaki na mbula nsambo, mbongwana ya monene ekɔtaki na libota na biso. Felipe abɛlaki bokɔnɔ ya mimpululu. Abundaki na maladi yango na boumeli ya sanza 11, azalaki ata kokoka kosala te mpe mbala mingi azalaki kaka kolala. Mobali na ngai akufaki na mbula 36.

Nalelaka tii lelo soki nakanisi mbula wana ya mpasi. Nazalaki komona ndenge maladi ezalaki kolya mobali na ngai mokemoke, kasi nakokaki kosala eloko te. Na boumeli ya ntango wana, nakobaki kolendisa Felipe, atako nayebaki ete bilikya mpe mikano oyo tozalaki na yango ekokende na mai. Nazalaki kotángela ye masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!, mpe yango ezalaki kolendisa biso soki tokei na makita te. Ntango akufaki, nayokaki lokola nde natikalaki ngai moko.

Atako bongo, Yehova asungaki ngai. Nazalaki kosɛnga ye ntango nyonso apesa ngai elimo na ye. Natɔndaki ye mpo na bambula ya esengo oyo ngai ná Felipe tolekisaki elongo mpe mpo na elikya ya komona lisusu Felipe na lisekwa. Nasɛngaki Nzambe asalisa ngai nabosana te bantango ya esengo oyo nalekisaki elongo na Felipe mpe apesa ngai bwanya nasalisa mwana na biso akóma moklisto ya solo. Atako nayokaki mpasi mingi, nabɔndisamaki.

Baboti na ngai ná bandeko ya lisangá basalisaki ngai mingi. Atako bongo, nasengelaki koyekola Biblia na Saúl mpe kolakisa ye kosalela Yehova. Patrɔ na ngai moko ya kala apesaki ngai mosala moko ya malamu, kasi namonaki malamu nasukolaka bandako mpo nalekisaka ntango mingi elongo na Saúl mpe akutaka ngai na ndako soki auti kelasi.

Vɛrsɛ moko ya Biblia esalisaki ngai namona ntina ya koteya Saúl makambo ya Nzambe: “Bɔkɔlá mwana na nzela ekoki na ye kotambola; [ntango akokola, NW] akopɛngwa na yango te.” (Masese 22:6) Vɛrsɛ wana epesaki ngai elikya ete soki nasali nyonso mpo na koteya Saúl makambo ya Nzambe, Yehova akopambola milende na ngai. Ya solo, nazalaki koboya misala oyo ekokaki kopesa ngai mbongo mingi, kasi nazalaki na mposa ya kozalaka na mwana na ngai mingi, mpe yango ezalaki na ntina mingi mpo na ngai koleka mbongo.

Ntango Saúl azalaki na mbula 14, tata na ngai akufaki. Saúl atungisamaki makasi, mpo liwa ya nkɔkɔ na ye etindaki ye akanisa lisusu mpasi oyo ayokaki ntango tata na ye akufaki. Tata atikaki mpe ndakisa malamu ya kolinga Yehova. Nsima ya liwa na ye, Saúl amonaki ete atikali “mobali” kaka ye moko na libota, mpe asengelaki sikoyo kokipe mama na ye mpe nkɔkɔ na ye ya mwasi.

Etumba na kanser

Sanza mwambe nsima ya liwa ya tata, monganga ya libota na biso asɛngaki ngai nakende na Saúl na lopitalo, mpo akómaki kolɛmbalɛmba mingi. Nsima ya kosala ye baekzamɛ ebele, minganga bayebisaki ngai ete Saúl azali na kanser.a

Na boumeli ya mbula mibale na ndambo, Saúl akɔtaki lopitalo mbala na mbala mpe azalaki kobunda na kanser na ye mpe na bankisi oyo minganga bazalaki kopesa mpo na kosilisa kanser yango. Nsima ya kozwa bankisi na boumeli ya sanza motoba ya liboso, kanser epemisaki ye sanza 18. Kasi, kanser yango ezongaki lisusu, mpe Saúl azwaki lisusu bankisi na boumeli ya mwa ntango mokuse, kasi elɛmbisaki ye makasi. Kanser yango epemisaki ye lisusu mwa moke, mpe maladi ezongaki lisusu, kasi na mbala wana, nzoto eboyaki nkisi. Saúl amipesaki epai na Nzambe, amonisaki mposa ya kozwa batisimo mpe kokóma Motatoli, kasi akufaki ntango kaka akómaki na mbula 17.

Mbala mingi, minganga bazalaki kosɛnga bázongisa ye makila mpo na kolɛmbisa makasi ya nkisi oyo bazalaki kopesa ye. Kozongisa makila esilisaka kanser te. Ntango minganga bayebisaki biso ete Saúl azali na kanser, ngai ná ye toyebisaki bango polele ete tokondima te básalisa ye na makila, mpo tolingaki kotosa mobeko ya Yehova oyo esɛngi ‘koboya makila.’ (Misala 15:19, 20) Mbala mingi, ata soki nazali te, Saúl azalaki koyebisa minganga ete ye moko nde azalaki koboya bázongisa ye makila. (Talá etanda na lokasa 31.)

Nsukansuka, minganga bamonaki ete atako Saúl azalaki mwana moke, azalaki kokanisa lokola mokóló, mpe ayebaki malamu maladi oyo azalaki kobɛla. Bandimaki ekateli na biso mpe bandimaki kosalisa Saúl kozanga kozongisa ye makila, atako bazalaki kotya biso mbamba ntango nyonso mpo tóndima makila. Koyoka ndenge Saúl ye moko azalaki koyebisa minganga ekateli na ye ezalaki kosepelisa ngai makasi. Emonani polele ete Saúl akómaki mpenza moninga ya Yehova.

Ntango minganga bayebisaki biso ete Saúl azali na kanser, buku Pusaná penepene na Yehova ebimaki na liyangani ya etúká oyo tosalaki na engumba Barcelone. Buku yango esalisaki biso tóbungisa elikya te na ntango wana ya mpasi. Na boumeli ya bangonga oyo tozalaki kolekisa na lopitalo, tozalaki kotánga buku yango. Ata na nsima, na bileko ya mpasi, tozalaki mbala mingi komikundola makambo oyo totángá na buku yango. Na ntango wana nde makanisi oyo ezali na Yisaya 41:13, oyo batyá na ebandeli ya buku yango, ekómaki na ntina mpenza mpo na biso. Elobi boye: “Ngai [Yehova], Nzambe na yo, nazali kosimba lobɔkɔ na yo ya mobali; ngai nazali koloba na yo ete, Bangá te: ngai nakosunga yo.”

Kondima ya Saúl elendisaki basusu

Mpiko ya Saúl ekamwisaki mpenza minganga mpe balifulumɛ ya lopitalo ya Vall d’Hebrón. Minganga nyonso oyo bazalaki kosalisa ye bakómaki kosepela na ye mingi. Banda wana, mokonzi ya minganga oyo basalisaka kanser ya makila akómá kosalisa bana mosusu ya Batatoli ya Yehova oyo bazali kobɛla kanser, mpe akómá komemya mpe kopesa bango kilo. Akanisaka Saúl mpo na ndenge aboyaki kokakola bindimeli na ye, mpo na mpiko oyo azalaki na yango liboso ya liwa mpe mpo na elikya kitoko ya bomoi oyo azalaki na yango. Balifulumɛ bayebisaki Saúl ete naino bayamba moto ya maladi lokola ye te epai na bango. Balobaki ete azalaki komilelalela te mpe azalaki ntango nyonso na esengo, ata ntango alingaki kokufa.

Moto moko ya pisikoloji ayebisaki ngai ete soki bana mingi ya mbula wana babɛli maladi oyo bayebi ete bakobika na yango te, bakómaka nkandankanda mpe balingaka lisusu ata komona minganga ná baboti bango na miso te. Amonaki ete Saúl azalaki bongo te. Azalaki kokamwa ndenge Saúl azalaki koboma nzoto te mpo na maladi na ye. Yango epesaki ngai ná Saúl libaku ya kopesa ye litatoli.

Nazali mpe koyeba lisusu ndenge Saúl, kozanga koyeba, asalisaki ndeko moko ya lisangá na biso. Azalaki kotungisama na maladi ya motó mbula soki motoba, mpe bankisi oyo azalaki komɛla esalisaki ye mpenza te. Mbala mingi, azalaki kobatela Saúl na butu. Alobaki na ngai ete azalaki kokamwa ndenge Saúl azalaki komitungisa mpenza te mpo na maladi na ye. Amonaki ete atako maladi yango ezalaki kolɛmbisa Saúl, azalaki kosala nyonso mpo na kolendisa moto nyonso oyo ayei kotala ye. Ndeko yango alobi ete: “ndakisa ya Saúl esalisaki ngai mingi na maladi na ngai.”

Banda Saúl akufá, eleki sikoyo mbula misato. Kasi, mpasi ya liwa na ye ezali kosila te. Nazali makasi te, kasi Nzambe apesi ngai “nguya oyo eleki makasi.” (2 Bakolinti 4:7) Namoni ete mpasi ekoki koteya moto makambo mingi ya malamu. Kolonga mpasi ya liwa ya mobali na ngai, tata na ngai mpe mwana na ngai esalisi ngai nakanisaka kaka mpasi na ngai moko te, kasi nayebaka mpe mpasi ya baninga. Likambo eleki ntina, yango esalisi ngai napusana penepene na Yehova. Ezala likambo nini ekoki koyela ngai, nakobanga te, mpo Tata na ngai ya likoló azali kokoba kosunga ngai mpe kosimba ngai na lobɔkɔ.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Saúl abɛlaki kanser moko (leucémie lymphoblastique) oyo ebebisaka makila mpe esilisaka yango makasi ya kobunda na mikrobɛ.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 31]

OSILÁ KOMITUNA?

Ntango mosusu oyoká ete Batatoli ya Yehova balingaka te bázongisa bango makila. Omituná ntina oyo balingaka te?

Atako Biblia nde esɛngi bango básala bongo, bato bamonaka te ntina oyo Batatoli baboyaka bázongisa bango makila. Mbala mosusu bato bakanisaka ete Batatoli ya Yehova baboyaka nkisi nyonso ya monganga to bayebi motuya ya bomoi te. Kasi, ezali bongo te. Batatoli ya Yehova balukaka lisalisi ya monganga oyo ebongi mpo na bango mpe mpo na mabota na bango. Kasi, balingaka básalisa bango na nkisi oyo ezali na makila te. Mpo na nini?

Mpo batosaka mobeko moko ya ntina mingi oyo Nzambe apesaki bato. Na nsima ya Mpela ya Noa, Nzambe apesaki Noa mpe libota na ye ndingisa ya kolya nyama. Nzokande, apekisaki bango makasi mpenza kolya makila. (Genese 9:3, 4) Lokola bato nyonso bazali bana ya Noa, mobeko yango etaleli moto nyonso. Mobeko yango ebongwaná te. Bikeke koleka mwambe na nsima, Nzambe akundwelaki Bayisalaele mobeko yango mpe ayebisaki bango ete makila ezali mosantu, ezali molimo to bomoi. (Levitike 17:14) Mbula koleka 1 500 na nsima, bantoma basɛngaki baklisto nyonso ‘bákoba koboya . . . makila.’​—Misala 15:29.

Mpo na Batatoli ya Yehova, ezali polele ete koboya makila elimboli koboya bázongisa bango yango. Yango wana, basɛngaka minganga básalisa bango na bankisi oyo ezali na makila te. Mbala mingi, ekateli wana, oyo euti na Biblia, etindaka minganga bábimisa mayele ya sika mpo na kobikisa bango. Yango wana, bato mingi oyo bazali Batatoli ya Yehova te bakómi mpe kosɛnga minganga básalisa bango kozanga kosalela makila.

[Elilingi na lokasa 29]

Ngai ná mobali na ngai Felipe mpe mwana na biso Saúl

[Elilingi na lokasa 29]

Baboti na ngai José ná Soledad

[Elilingi na lokasa 30]

Saúl, sanza moko liboso akufa

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto