Makambo mazali koleka na mokili
Bankisi ya monganga ebimisaka makama
Zulunalo Stuttgarter Nachrichten elobi ete: “Na mbula oyo euti koleka, nkisi ya monganga ebomi bato mingi koleka bato oyo bakufaki na makama ya motuka.” Lapolo emonisi ete bato 25 000 bakufaki na 1998 mpo na bankisi oyo minganga bakomelaki bango malamu te. Bato yango bazali mbala misato koleka bato oyo bakufaki na makama ya motuka kaka na mbula yango. Emonani ete bato oyo bamelaki nkisi bango moko kozanga kokenda epai ya monganga bazali mingi te kati na bato yango. Mokakatano mpenza ezali ete minganga bayebi makambo mingi te mpe batángaki kelasi malamu te na likambo oyo etali bankisi mpe ndenge yango esalaka na nzoto ya bato. Ingolf Cascorbi, ye ayebi malamu makambo ya nkisi, alobi ete ankɛtɛ moko emonisaki ete “na Allemagne, mbɛlɛ bato 10 000 bakufaka te mpe mbɛlɛ bato 250 000 batungisamaka na nkisi te mbula na mbula, soki básalaka bolukiluki malamu mpe soki bálobelaka malamumalamu makambo ya nkisi.”
Bobele bongo, zulunalo Sciences et avenir na ekólo France elobi ete ankɛtɛ moko oyo eutaki kosalema na France emonisi ete kati na ba ordonnances 150 000 oyo minganga bakomelaki bato ya maladi ya mbula 70 mpe koleka, ba ordonnances koleka 10 700 ezalaki te na bankisi oyo esengeli to ezalaki na ntina te. Pene na ordonnance moko kati na 50 ezalaki na likama mpo na kosangisa bankisi mosusu oyo bakomaki to mpo na makama mosusu. Na France, mibange balekisaka mikolo milio moko mbula na mbula na lopitalo mpo na mikakatano oyo nkisi ya monganga ebimisaka.
Makɛlɛlɛ ya mama ya nyama na kasɛti mpo bana bálya malamu
Zulunalo New Scientist elobi ete bato ya siansi na Canada bamonaki ete bana ya banyama oyo bato babɔkɔlaka balyaka mingi soki batyeli bango miziki. Luis Bate, profesɛrɛ na Iniversite ya esanga Prince-Édouard alobi ete: “Tokɔtisaki makɛlɛlɛ ya mama ya nsoso oyo azweli bana na ye eloko moko ya kolya na kasɛti.” Ntango batyaka makɛlɛlɛ yango oyo ezali na kasɛti pene na bilei, bana ya nsoso balyaka malamu ata soki mama na bango azali te. Kasi makɛlɛlɛ yango esengeli kobima mpenza ndenge nsoso esalaka yango. Bate alobi lisusu ete: “Ntango totyaki kasɛti oyo ezali na makɛlɛlɛ oyo mama ya nsoso asalaka ntango apasoli maki mpe abimisi bana, makɛlɛlɛ oyo mpo na ngai, ezali mpenza ndenge nsoso esalaka mpo na kobenga bana báya kolya, bana ya nsoso batɛlɛmaki nyɛɛ.” Mokano ya bato ya siansi ezali ya kokolisa banyama mbangumbangu. Ntango basalaki likambo yango mbala ya liboso, bana ya nsoso bakolaki mbangumbangu (20%) ntango bakokisaki pɔsɔ misato koleka ndenge bakolaka na momeseno. Bakolanda kosala ndenge wana mpo na bana ya dɛndɔ mpe bana ya ngulu.
Kotungisama mpo na mosala
Zulunalo Vancouver Sun elobi ete: “Pene na bato ya Canada 50 likoló ya monkama bazali koloba ete bazali kotungisama mingi mpo na komeka kozala na bokatikati kati na makambo ya mosala mpe makambo ya ndako. Motángo ya bato yango ekoli mbala mibale koleka ndenge bazalaki esili koleka mbula zomi.” Mpo na nini bato oyo bazali kotungisama ndenge wana bakómi mingi boye? Ankɛtɛ moko esalemaki na ebongiseli babengi Conference Board du Canada emonisaki ete bato ya Canada mingi oyo bakendaka mosala basengeli mpe kokɛngɛla bato ya maladi na mabota na bango. Bato yango mingi bazali kobota bana na bango ya liboso ntango basili kopusana na mbula, yango ezali mbala mingi komemela bango mokumba monene ya “kobɔkɔla bana na bango mpe kosalisa baboti na bango na mbala moko.” Atako bato 84 kati na bato monkama oyo batunaki bango balobaki ete bazali malamu na mosala na bango, ankɛtɛ yango ezali komonisa ete ntango makambo ya mosala mpe makambo ya ndako ekómi nyonso mibale kosɛnga ntango koleka, “mingi bapemaka lisusu mpenza te mpe balalaka lisusu mingi te.” Conference Board elobi ete: “Motungisi eyaka makasi mpe bokolɔngɔnɔ ya nzoto ebebaka.”
Koteya bana limemya
Zulunalo The Toronto Star elobi ete: “Baboti ya lelo bazali kosɛnga mwa limemya moke epai na bana yango wana nsukansuka bana bazali kobungisa limemya ya bango moko.” Ronald Morrish, moto oyo ayekolaka bizaleli ya bato alobi ete: “Esengeli mpenza ete bana báyeba esika bonsomi na bango esuki mpo na koyeba makambo oyo basengeli kosala mpe oyo basengeli kosala te mpo bámiyoka ete babatelami—yango esalisaka bango bámimona ete bazali na ntina. Bana oyo bateyaka bango ata mobeko moko te to lolenge ya kokokisa mikumba ata moko te bazalaka na mokakatano ya koyoka ete babatelaka bango, mpe bamityelaka motema te.” Abakisi ete: “Nayebi bana ya mbula motoba oyo bazwaka ekateli bango moko mpo na ntango oyo basengeli kokenda kolala. Nayebi bana ya mbula misato oyo bamama na bango bamekaka kolimbolela bango ete básalaka makambo ya mabe te mpamba te makambo ya mabe eyokisaka mama na bango mpasi.” Morrish alobi ete bana basengeli koyeba kotosa mibeko ya libota, mpe koloba ete ntango bana bazali kokola bazalaka lisusu na limemya mingi te, ezali lokuta. Atuni ete: “Tokanisaka ete bana bakolisaka mayele na bango na kelasi mbula na mbula. Na bongo mpo na nini te kokanisa mpe ete bizalela ya bana ekómaka malamu wana bazali kokola? Soki olakisi mwana te ndenge ya kobomba eloko na ye ya kosakana, kokanisa mpe te ete ntango akokóma elenge akotosa mobeko ya baboti ya kozonga na ndako na ngonga ebongi.”