Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g00 Octobre nk. 16-19
  • Ndenge oyo tozongelaki libala na biso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge oyo tozongelaki libala na biso
  • Lamuká!—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tobandaki malamu
  • Tokabwani
  • Mbongwana oyo Lars akanisaki te
  • Bongo Judith?
  • Tobalani lisusu
  • Bana na biso
  • Bomoi na biso lelo oyo
  • Esengo oyo mosala ya Jéhovah ememelaki ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Batatoli ya Yehova bapanzaka mabala ya bato?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Yehova apambolaka baoyo bazongaka na bamboka na bango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
Makambo mosusu
Lamuká!—2000
g00 Octobre nk. 16-19

Ndenge oyo tozongelaki libala na biso

Lisolo ya Lars na Judith Westergaard

NDAKO na bango ezali mpenza lokola bandako ezalaka na Danemark, esika moko malamu mpo na libota ya esengo. Ezali ndako moko kitoko, na bafololo ya kitoko mpe ezali na mwa mboka moko ya kimya. Na kati ya ndako yango, okomona foto moko ya monene na efelo; ezali foto ya bana na bango, bazali kosɛka mpe bazali na nzoto kolɔngɔnɔ.

Tata ya libota yango, nkombo na ye Lars, azali nkulutu na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova. Mwasi na ye, Judith, azali mobongisi-nzela (mosakoli ya ntango nyonso). Lelo oyo bazali na esengo na libala na bango, kasi bazalaki liboso na esengo bongo te. Lars na Judith bazalaki na matata oyo etindaki bango báboma libala na bango. Kasi lelo oyo, bazongisi libala na bango. Mpo na nini? Bango moko bakoyebisa biso nini esalemaki.

Lars na Judith basepelaka kolobela matata makasi oyo bazalaki na yango na libala na bango mpe ndenge oyo bazongisi libala na bango. Bamonaka ete lisolo na bango ekoki mpe kosalisa bato mosusu.

Tobandaki malamu

Lars: Ntango tobalanaki na sanza ya Aprili 1973, ezalaki kaka bisengo na bisengo. Tozalaki komona ete makambo nyonso ekozala malamu mpo na biso. Toyebaki na biso Biblia te ata mpe Batatoli ya Yehova te, kasi tozalaki kondima ete soki bato nyonso basali milende oyo esengeli mpo na yango, mokili ekoki kozala esika malamu mpo na kofanda. Yango wana, tomikɔtisaki na makambo ya politiki. Tosepelaki lisusu mingi ntango tobotaki bana mibali misato: Martin, Thomas na Jonas; bazalaki na nzoto makasi mpe balingaki kosakana mingi.

Judith: Nazalaki mokonzi na mosala moko ya Leta. Na ntango yango, nazalaki mpe kokɔta na misala ya politiki mpe nazalaki kosala na sɛndiká moko. Mokemoke, nakómaki na bisika minene kuna.

Lars: Ngai, nazalaki kosala na sɛndiká moko ya monene mpe nakómaki mokonzi monene kuna. Misala na biso ezalaki kotambola malamu mpe tozalaki kobanga ata eloko moko te oyo ekokaki kobebisa bomoi na biso.

Tokabwani

Lars: Moto na moto amipesaki mobimba na mosala na ye, yango wana tozalaki lisusu te kolekisa ntango mingi biso mibale. Biso nyonso mibale tozalaki kosala na parti politiki moko kasi na bisika ekeseni. Bato mosusu nde bazalaki kokɛngɛla bana na biso, ezala na ndako to na bisika oyo bakɛngɛlaka bana soki baboti bakei mosala. Lokola moto na moto azalaki kaka kokanisa makambo na ye moko, mobulu ekɔtaki mpenza na libota na biso. Mbala mingi soki biso nyonso mibale tozali na ndako, tozalaki koswana makasi. Nakómaki komela masanga mpo nabosana mikakatano yango.

Judith: Ya solo, tozalaki kaka kolingana mpe tolingaki bana na biso, kasi tokolisaki mpenza bolingo yango na ndenge esengeli te; ebandaki kolɛmba. Tozalaki lisusu koyokana te mpe yango enyokolaki bana na biso.

Lars: Mpo na komeka kobongisa libala na biso, natikaki mosala na ngai. Na 1985, tolongwaki na engumba mpe toyaki kofanda na mboka, esika tozali lelo oyo. Makambo esalaki lokola kobonga, kasi ezala ngai, ezala mwasi na ngai, moto na moto azalaki se kotalela bamposa na ye moko. Nsukansuka, na Febwali 1989, nsima ya mbula 16 ya libala, tobomaki libala na biso. Libota na biso ebebaki.

Judith: Ezalaki mpenza likambo ya mawa komona ndenge libota na biso ekabwanaki mpe ndenge bana bazalaki konyokwama mpo na yango. Matata na biso ezalaki mpenza makasi mpe toyokanaki te mpo na kokabola bana biso mibale; na yango, ngai nazwaki lotomo ya kotikala na bana nyonso misato.

Lars: Ngai na Judith tosalaki mwa milende mpo na koluka kobatela bomoko ya libota na biso. Tobondelaki kutu Nzambe ete asalisa biso. Kasi toyebaki mpenza makambo mingi te etali Nzambe.

Judith: Nsima ya kobondela, tomonaki lokola ete Nzambe ayokaki mabondeli na biso te. Tozali na esengo mingi mpamba te kobanda wana tomoni mpenza ete Nzambe ayokaka mabondeli.

Lars: Toyebaki te ete moto na moto asengelaki nde kosala milende mpo abongola bizaleli na ye. Yango wana, na mawa nyonso, tobomaki libala na biso.

Mbongwana oyo Lars akanisaki te

Lars: Ntango nakómaki kofanda ngai moko, makambo ebongwanaki na ndenge oyo nakanisaki te. Mokolo moko, Batatoli ya Yehova bapesaki ngai bazulunalo mibale. Liboso nazalaki kosepela ata moke te na Batatoli ya Yehova. Kasi ntango natángaki bazulunalo yango, namonaki ete Batatoli bandimaka Nzambe mpe Yesu Klisto. Nakamwaki mpenza. Nayebaki te ete bazalaka baklisto.

Na ntango yango, nazwaki mwasi moko mpe tobandaki kofanda na ye makango. Nzokande, mwasi yango azaláká Motatoli ya Yehova. Ntango nabandaki kotuna ye mituna, alakisaki ngai na kati ya Biblia ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova. Yango wana, “Batatoli ya Yehova” elimboli “Batatoli ya Nzambe”!

Mwasi yango asalaki ete nakende koyangana na lisukulu ya bato nyonso na Ndako ya Mayangani ya Batatoli ya Yehova. Makambo namonaki kuna etindaki ngai nasepela na bango mingi lisusu. Nakendaki na Ndako ya Bokonzi ya mboka wana mpo na koyekola makambo mingi lisusu mpe nabandaki koyekola Biblia. Naumelaki te mpo na koyeba ete nazalaki na bomoi ya mbindo; yango wana, nakabwanaki na mwasi wana mpe nakendaki kofanda ngai moko na engumba esika nazalaki kofanda liboso. Nsima ya kokakatana mwa moke, nalukaki Batatoli ya Yehova mpe nakobaki na boyekoli na ngai ya Biblia.

Kasi nazalaki naino kotya ntembe na makambo mosusu. Batatoli ya Yehova bazali mpenza bato ya Nzambe? Bongo makambo oyo nayekolaki ntango nazalaki mwana? Lokola nakolaki na Lingomba ya Adventiste du septième jour, nakendaki epai ya pastɛrɛ moko ya lingomba yango. Pastɛrɛ yango andimaki koyekola na ngai mikolo nyonso ya misato, kasi Batatoli ya Yehova bazalaki koyekola na ngai na mikolo nyonso ya mosala moko. Eloko nazalaki koluka ezali ete mangomba oyo mibale elimbwela ngai malamumalamu makambo oyo minei: kozonga ya Klisto, lisekwa, liteya ya Bosato mpe ndenge oyo lisangá esengeli kotambwisama. Nsima ya mwa basanza mpamba, nazalaki lisusu kotya ntembe te. Na makambo wana minei mpe na makambo nyonso mosusu, kaka mateya ya Batatoli ya Yehova nde eyokanaki mpenza na Biblia. Yango wana, nabandaki mbala moko kosangana na misala nyonso ya lisangá ya Batatoli ya Yehova mpe eumelaki te, namipesaki epai ya Yehova. Na Mai 1990, nazwaki batisimo.

Bongo Judith?

Judith: Ntango matata na biso ekómaki makasi, nazongelaki kokende ndako-nzambe. Nasepelaki ata moke te ntango nayokaki ete Lars alingaki kokóma Motatoli ya Yehova. Na bantango mosusu, Jonas, mwana na biso ya nsuka oyo azalaki na mbula zomi, azalaki kokende kotala tata na ye; kasi napekisaki Lars ete amemaka Jonas na makita ya Batatoli ya Yehova. Lars amemaki likambo yango na tribinale, kasi bazuzi balongisaki ngai.

Nakómaki kofanda na mobali mosusu. Lisusu, namikɔtisaki mpenza na makambo ya politiki mpe na misala mosusu mpo na kosalisa bato. Na ntango yango, moto moko te akokaki kokanisa ete tokozongela lisusu libala na biso.

Lokola nazalaki koluka efundeli oyo nakofunda Batatoli ya Yehova, nakendaki epai ya pastɛrɛ ya parwasi na biso; kasi ayebisaki ngai mbala moko ete ayebi Batatoli ya Yehova te mpe azali na mokanda moko te oyo ezali kolobela bango. Pastɛrɛ yango ayebisaki ngai kaka ete ekozala malamu nasololaka na bango te. Maloba na ye ebongolaki makanisi na ngai mpo na Batatoli ya Yehova te; nazalaki kaka kosepela na bango te. Kasi na nsima, nayaki kokutana na bango na ndenge oyo nakanisaki te.

Ndeko na ngai ya mobali, oyo afandaka na Suède, akómaki Motatoli ya Yehova mpe abengisaki ngai na libala na ye na Ndako ya Bokonzi moko ya Batatoli ya Yehova! Likambo namonaki kuna, ebongolaki mpenza makanisi na ngai mpo na Batatoli ya Yehova. Nakamwaki na komona ete bazali ndenge nazalaki kokanisela bango te, bazali bato oyo basepelaka na basusu. Bazalaki na boboto mpe na esengo, kutu bazalaki mpe kobeta masolo ya kosɛkisa.

Na ntango wana, Lars, mobali na ngai ya kala, asilaki kobongwana mpenza. Akómaki kokokisa mikumba na ye malamu koleka, azalaki kolekisa ntango esika moko na bana, azalaki na boboto mpe akómaki kokeba na maloba na ye, mpe azalaki lisusu komela masanga mingi te ndenge azalaki komela liboso. Akómaki na bizaleli malamu mpenza oyo ezalaki kosepelisa ngai! Akómaki mpenza na bizaleli oyo nalingaki ete mobali na ngai azala na yango. Ezalaki kosala ngai mpasi ntango nazalaki kokanisa ete azali lisusu mobali na ngai te mpe ntango mosusu, akobala mwasi mosusu!

Yango wana, natyelaki ye “motambo” moko. Mokolo moko, ntango Jonas azalaki epai ya tata na ye, nabongisaki ete ngai na bandeko na ngai mibale ya basi tókokende kotala Jonas na Lars; nalobaki ete bandeko na ngai balingi komona mwana na ngai. Tokutanaki biso nyonso na esika moko ya masano (parc d’attraction). Ntango bandeko na ngai bazalaki kokɛngɛla mwana na biso, ngai na Lars tomonaki kiti moko mpe tofandaki wana.

Ntango kaka nalingaki kolobela bomoi na biso mibale na mikolo ekoya, Lars atyaki lobɔkɔ na ye na libenga na ye mpe abimisaki mokanda moko; nakamwaki mpenza. Mokanda yango elobaki ete Ndenge nini okoki kozala na bomoi ya libota ya esengo.a Apesaki ngai mokanda yango mpe asɛngaki ngai ete natánga mokapo oyo elobelaki mokumba ya mobali mpe ya mwasi na kati ya libota. Mpe asɛngaki ngai mpenza ete natánga mikapo nyonso ya Biblia oyo ezalaki na kati.

Na nsima, ntango totɛlɛmaki, nalingaki kosimba ye na lobɔkɔ, kasi na boboto nyonso, aboyaki. Lars alingaki te kozongela libala elongo na ngai liboso ya koyeba soki ngai nakanisi nini mpo na bindimeli na ye ya sika. Likambo yango esalaki ngai mpasi, kasi na nsima, namonaki ete makanisi na ye ezalaki malamu mpe ezalaki mpo na bolamu na ngai moko soki abali ngai lisusu.

Makambo oyo nyonso esalaki ete naluka lisusu koyeba malamumalamu Batatoli ya Yehova. Na mokolo oyo elandaki, nakutanaki na mwasi moko oyo nayebaki ete azali Motatoli ya Yehova; tobongisaki ete ye na mobali na ye báyebisa ngai makambo nyonso etali lingomba na bango. Basalelaki Biblia mpo na kopesa biyano na mituna nyonso oyo nazalaki na yango, atako ezalaki ebele. Namonaki solo ete mateya ya Batatoli ya Yehova euti mpenza na Biblia. Na likambo mokomoko oyo tosololaki, nazalaki kondima ete ezalaki solo.

Na ntango yango, nalongwaki na Église évangélique luthérienne mpe natikaki misala na ngai ya politiki. Natikaki mpe komela likaya; yango nde elekaki makambo nyonso na mpasi. Nabandaki koyekola Biblia na sanza ya Augusto 1990 mpe mpo na kokóma Motatoli ya Yehova, nazwaki batisimo na Aprili 1991.

Tobalani lisusu

Judith: Sikoyo, biso nyonso mibale tokómaki Batatoli. Biso nyonso mibale toyekolaki Biblia, atako moto na moto ayekolaki na ngámbo na ye. Mateya ya Biblia esalisaki biso tózala lisusu ndenge tozalaki liboso te. Tokómaki lisusu komibanzabanza moko mpo na mosusu, mbala mosusu kutu koleka ndenge ezalaki liboso. Sikoyo tokokaki lisusu kobalana—mpe tobalanaki. Tolapaki ndai ya libala mpo na mbala ya mibale, kasi mbala oyo, esalemaki na kati ya Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova.

Lars: Likambo ya kokamwa: libota na biso ezongaki lisusu esika moko! Tozalaki mpenza na esengo mingi!

Judith: Bana na biso ya mibali, bandeko mingi mpe baninga mingi, ezala ya sika to ya kala, bayaki na fɛti na biso ya libala. Ezalaki mpenza likambo moko ya kokamwa. Na kati ya bato oyo bayaki na fɛti yango, ezalaki mpe na bato oyo bayebaki biso na libala na biso ya liboso; bazalaki na esengo ya komona biso lisusu esika moko mpe bakamwaki na komona esengo ya solosolo oyo Batatoli ya Yehova bazali na yango.

Bana na biso

Lars: Banda ntango tozwaki batisimo, tozalaki na esengo ntango bana na biso mibale bamipesaki epai ya Yehova.

Judith: Jonas asepelaki na mateya ya solo ya Biblia banda ntango oyo ayokaki yango naino azalaki mwana moke, wana azalaki kokende kotala tata na ye. Azalaki naino na mbula zomi ntango ayebisaki ngai ete alingaki kokende kofanda na tata na ye mpamba te, ndenge ye moko alobaki yango ete: “Papa atosaka Biblia.” Jonas azwaki batisimo ntango azalaki na mbula 14. Asilisaki kelasi na ye mpe sikoyo azali mosakoli ya ntango nyonso.

Lars: Martin, mwana na biso ya liboso, azali sikoyo na mbula 27. Mbongwana oyo amonaki epai na biso etindaki ye akanisa mpenza na yango. Alongwaki na ndako mpe akendaki kofanda esika mosusu kaka na Danemark. Esili koleka sikoyo mbula mibale, abandaki koyekola Biblia na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova kuna. Nsima ya sanza mitano mpamba, azwaki batisimo. Azali na mokano malamu na makambo ya elimo mpo na mikolo ezali koya.

Thomas, mwana na biso ya mibale, akómi naino Motatoli ya Yehova te. Ya solo, tozali ntango nyonso kolinga ye mpe tozali na boyokani malamu na ye. Asepelaka ndenge libota na biso ebongwaná. Mpe biso nyonso tondimaka ete mitinda ya Biblia oyo biso baboti toyekolaki nde esalisi libota na biso ete ezala lisusu na bomoko. Ezali mpenza lipamboli mpo na biso, na ndenge tokoki sikoyo kosangisa libota na biso nyonso esika moko, bana nyonso misato na baboti nyonso mibale!

Bomoi na biso lelo oyo

Lars: Tolobi te ete tokómi bato ya kokoka. Kasi likambo oyo toyekoli, yango oyo: bolingo mpe limemya ya moko epai na mosusu nde esalaka ete libala ezala malamu. Lelo oyo, libala na biso etongami likoló na eloko mosusu oyo ekeseni na oyo ezalaki liboso. Lelo oyo, biso nyonso tozali kondima mokonzi moko oyo aleki biso, mpamba te biso nyonso tozali kondima ete tozali na bomoi mpo na Yehova. Ngai na Judith tozali mpenza komona ete tozali na bomoko mpe tozali na elikya mpo na mikolo ezali koya.

Judith: Mpo na ngai, tozali mpenza ndakisa oyo ezali komonisa ete Yehova azali mopesi-toli oyo aleki bapesi-toli nyonso na makambo ya libala mpe ya libota.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisamaki na Batatoli ya Yehova na 1978; esilá.

[Elilingi na lokasa 16]

Lars na Judith na mokolo ya libala na bango ya liboso, na 1973

[Elilingi na lokasa 17]

Bana mibali misato bamonaki ndenge libota na bango epanzanaki, kasi sikoyo ezongi lisusu

[Elilingi na lokasa 19]

Lars na Judith lelo oyo, bazongeli libala na bango mpo balandaki mitinda ya Biblia

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto