Azwi biloko na ye oyo ebungaki
Na mbula oyo eleki, na Maryland, na États-Unis, mobali moko aboyaki na boboto nyonso kozwa bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! oyo bapesaki ye. Kasi, mwana na ye ya moke ya mwasi asɛngaki ye ndingisa ete azwa bazulunalo yango, mpe tata andimaki. Bango nyonso mibale bazalaki kosukola motuka na bango mpe kobwaka bosɔtɔ na kɛsi moko ya kobwaka bosɔtɔ oyo ezalaki pembeni wana. Lokola Motatoli oyo apesaki bango bazulunalo azalaki kobanga ete bakobwaka yango, azongaki lisusu kotala na kɛsi wana ya kobwaka bosɔtɔ soki akomona yango.
Amonaki bazulunalo yango te, kasi akutaki nde saki moko na potɔmɔni moko. Na kati ya saki yango, ezalaki na adrɛsi ya mwasi moko. Motatoli yango na mobali na ye bakendaki mbala moko kotala mwasi yango. Ntango bakómaki pene na ndako na ye, Batatoli yango bamonaki mwasi moko mokóló azalaki kokɔtisa mpunda ya mobali na ndako ya bampunda. Ntango bapesaki ye biloko na ye, mwasi yango agangaki ete: “Matɔndi mingi Nzambe, biloko nyonso ya ntina ezali awa—passeport, buku ya chèque, cartes de crédit mpe mikanda ya mpunda.” Alobaki ete bayibaki biloko yango na butu oyo elekaki. Lokola etikalaki moke bábwaka bosɔtɔ oyo ezalaki na kɛsi yango, moto oyo atalaki na kati asalaki mpenza malamu.
Mwasi yango apesaki Batatoli wana likabo, kasi baboyaki yango mpe bapesaki ye saki na potɔmɔni na ye bakisa mpe mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Lokola mwasi yango azalaki na mposa makasi ya komonisa botɔndi na ye, akomaki chèque mpo na kopesa likabo na ye mpo na mosala ya kokabola mikanda na mokili mobimba. Mpe banda ntango wana, ayekolaka Biblia mpe asepelaka mingi na boyekoli yango.
Soki yo mpe olingi kozwa mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? kozanga kofuta mbongo, tondisá lokasa oyo mpe tindá yango na Association “Les Témoins de Jéhovah,” B.P. 634 Limete, Kinshasa, République démocratique du Congo, to na adresi ebongi na yo na lokasa 5.
◻ Bótindela ngai mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
◻ Bóya koyekola na ngai Biblia na ndako.