BIBLIA ELOBI NINI?
“Masano oyo etyaka bomoi na likama”—Osengeli kosala yango?
NA MIKOLO OYO, BATO MINGI BATIKI KOTALA MAKAMBO NA MOSIKA, BANGO MOKO BAKÓMI NDE KOPUMBWAKA NA BAPARASHITE, KOKITA NA BANGOMBA YA MILAIMILAI NA BANSINGA, KOMEMA BWATO BISIKA MAI ETIYOLAKA MAKASI NA KATIKATI YA MABANGA MPE KOZINDA NA KATI YA MBU ESIKA BA-REQUIN EZALI.”—ZULUNALO THE WILLOW GLEN RESIDENT.
MALOBA wana emonisi masano oyo bato bakómi kosala. Lokola bato bazali kosepela na masano lokola kopumbwa na likoló, kokita na baglase, komibwaka na parashite (parapente) base jumpinga, emonisi ete bato bakómi kosepela komitya na likama. Lisano ya kopumbwa na baglasi (Snowboard), kokumba velo na bangomba, skate-board mpe kokima mbangu na sapato ya bapinɛ (roller) ezali kotinda bato báleka makoki na bango ndenge bazali komata na bangomba ya nsɔmɔ, ya milai mpenza, mpe kopumbwa na bisika ya kobangisa. Ndenge zulunalo moko (Time) elobi yango, lokola bato bakómi kosepela mingi na “masano oyo etyaka bomoi na likama”—masano oyo basani bazali mpenza komitya na likama monene—emonisi polele ete bamilio ya bato bazali na “mposa ya komeka liwa, esika likama, likoki mpe kobanga esangani mpo na kopesa bato oyo basakanaka kaka na mokolo ya lomingo to basani minene mposa ya kosala likambo oyo eleki makoki na bango.”
Atako bato bazali kolinga masano yango mingi, ezali kobimisela bango makama ebele. Ebele ya bato bazali mpenza kozoka ata na masano ya malamu na ntango oyo bazali kolekisa ndelo. Na États-Unis, na mobu 1997, balopitalo oyo eyambaka bato oyo basengeli kozwa lisalisi nokinoki eyambaki bato ebele oyo bazoki koleka ndenge eyambaka liboso: motángo ya baoyo bazokaki na lisano ya skate-board ebakisamaki na 33%, mpo na lisano ya kopumbwa na baglasi (snowboard) 31% mpe mpo na komata bangomba 20%. Mpo na masano mosusu, makambo ezali lisusu nde mabe koleka, mpo masano oyo etyaka bomoi na likama ebomi bato ebele mpenza. Bato oyo basalaka masano yango bayebi malamu mpenza ete masano wana ebimisaka makama minene. Mwasi moko oyo asalaka lisano ya ski alobi boye: “Likanisi ya kokufa na lisano ezalaka ntango nyonso na motó na ngai.” Moto moko oyo asalaka lisano ya kopumbwa na baglasi (snowboard ) alobi na mokuse ete, soki “ozoki te emonisi ete ozali kosala lisano malamu te.”
Na kotalela makambo oyo nyonso, ndenge nini mokristo asengeli kotalela masano yango? Ndenge nini Biblia ekoki kosalisa biso tóyeba ekateli tokozwa soki esengeli tósala masano oyo etyaka bomoi na likama to te? Koyeba ndenge oyo Nzambe atalelaka bomoi, ekosalisa biso tópesa biyano na mituna wana.
Ndenge Nzambe atalelaka bomoi
Biblia eyebisi biso ete Yehova azali “Liziba ya bomoi.” (Nzembo 36:9) Nzambe asukaki kaka na kosala moto te, apesaki biso mpe biloko oyo esengeli mpo tósepelaka na bomoi. (Nzembo 139:14; Misala 14:16, 17; 17:24-28) Na yango, tokoki koloba ete, azali na mposa makasi ete tóbatela eloko oyo apesaki biso na bolingo. Mibeko mpe mitinda oyo apesaki bana ya Yisraele ezali kosalisa biso tóyeba likambo yango malamu.
Mobeko ya Moize esɛngaki ete moto azwa bibongiseli mpo na kobatela bomoi ya basusu. Soki asali yango te, akomema ngambo ya makila soki moto akufi. Na ndakisa, moto oyo atongi ndako ya sika ya etaje asengelaki kosala mwa efelo na eteni ya likoló ya ndako, epai ezalaki polele. Soki asali bongo te, mpe soki moto moko akwei wana mpe akufi, ndako ekomema ngambo ya makila. (Kolimbola Mibeko 22:8) Soki ngɔmbɛ etuti moto na mbalakaka mpe akufi, mokóló ya ngɔmbɛ wana akozala na ngambo te. Nzokande, soki eyebanaki ete ngɔmbɛ wana ezali na momeseno ya kozokisa na maseke, mpe bakebisaki mokóló na yango, kasi ye abateli ngɔmbɛ na ye malamu te, mpe soki na nsima ngɔmbɛ yango ebomi moto, na ntango wana mokóló na yango azalaki na ngambo, mpe akokaki kobomama. (Kobima 21:28, 29) Lokola bomoi ezali na motuya monene na miso ya Yehova, mobeko na ye mpe ezali kozwa na valɛrɛ mingi likambo ya kobatela bomoi.
Basaleli ya Nzambe ya sembo bazalaki mpe komona ete mitinda yango esengeli mpe kosalelama na makambo oyo etali bomoi na biso moko. Na lisolo moko oyo ezali na Biblia, Mokonzi Davidi amonisaki ete azali na mposa ya komɛla “mai ya libulu ya kobomba mai ya Beteleme.” Na ntango wana, Beteleme ezalaki na mabɔkɔ ya Bafilistia. Ntango basoda misato ya Mokonzi Davidi bayokaki mposa na ye, bakɔtaki na makasi na kaa ya Bafilistia, batokaki mai na liziba ya Beteleme mpe bamemelaki ye yango. Mokonzi Davidi asalaki nini? Amɛlaki mai yango te, kasi asopaki yango na mabele. Alobaki ete: “Nakoki kokanisa yango ata moke te, mpo na Nzambe na ngai, ete nasala boye! Nakomɛla nde makila ya mibali oyo batye molimo na bango na likama? Mpo batyaki molimo na bango na likama ntango bayaki na yango.” (1 Ntango 11:17-19) Mpo na Davidi, ekokaki kokanisama te ete atya bomoi ya bato na likama kaka mpo na kokokisa mposa na ye moko.
Mbala mosusu na nzela ya emonaneli, Yesu mpe asalaki bongo ntango Zabolo amekaki ete amibwaka na nse longwa na likoló ya tempelo mpo amona soki baanzelu bakoya kobatela mpo azoka te. Yesu ayanolaki: “Osengeli komeka Yehova Nzambe na yo te.” (Matai 4:5-7) Ya solo, Davidi ná Yesu bayebaki ete ezali mabe mpenza na miso ya Nzambe kotya bomoi ya bato na likama kaka mpamba boye.
Na lisalisi ya bandakisa oyo, tokoki komituna boye, ‘Toyebi mpenza malamu masano oyo etyaka bomoi na likama? Ata masano oyo bato nyonso basalaka, oyo emonanaka malamu, ekoki komemela moto likama, ndenge nini tokoki koyeba esika tokosuka?’
Ebongi mpenza komitya na likama?
Kotalela na bosembo lisano nyonso oyo tolingi kosala, ekosalisa biso tózwa ekateli ya malamu. Na ndakisa, tokoki komituna boye: ‘Bato mingi bazwaka likama na lisano yango? Nzoto na ngai ekoki mpenza kosala yango to nazali na bisaleli ya komibatela mpo nazoka te to nabukana te? Nini ekokómela ngai soki nakwei to soki napumbwe mabe to mpe soki bisaleli na ngai ya komibatela ebebi? Nakozwa mwa likama ya moke to nakoki nde kozoka makasi to kobukana ata mpe kokufa?’
Kotya bomoi na likama kaka mpamba boye mpo na kominanola ekoki kobebisa boyokani ya mokristo ná Yehova, mpe mokristo ya ndenge wana akoki kozwa mikumba na lisangá te. (1 Timote 3:2, 8-10; 4:12; Tito 2:6-8) Emonani polele ete, ata na makambo ya kominanola, bakristo basengeli kotalela bomoi ete ezali eloko moko mosantu ndenge Mozalisi atalelaka yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ezali lisano ya kopumbwa na parashite banda na bandako ya milai, baantene, gbagba (Pont), bangomba oyo ezali na mabwaku tii na mabele, ebimisaka makama mingi, yango wana na États-Unis, National Park Service epekisa yango.