Nkoma ya batángi
Bokolɔngɔnɔ ya nzoto Masolo oyo ezalaki na motó ya likambo “Ekoki kosalema ete moto nyonso azala nzoto kolɔngɔnɔ?” (8 Yuni 2001, ebimeli ya Lifalanse) ebɔndisaki mpe elendisaki ngai mingi. Nabɛlaka motó, mpe nalingaká komiboma. Mokolo na mokolo namitunaka, ‘Ndenge nini nakolekisa mokolo ya lelo?’ Zulunalo yango ezongisaki na makanisi na ngai elaka ya Yehova oyo ezali na Emoniseli 21:4, ete ‘akopangwisa mpisoli nyonso na miso na biso.’
C. T., Japon
Matɔndi mingi mpo na masolo na bino ya kitoko. Nazali monganga mpe nasalelaka mingimingi mai, mopɛpɛ, moi mpe biloko mosusu mpo na kobikisa bato, mpe nazali kozela na motema likoló mokolo maladi ekozala lisusu te. Na ntango wana, nakosala lisusu mosala ya monganga te, nakosala nde mosala ya bilanga—mosala mosusu oyo nalingaka mingi!
B. C., États-Unis
Maloba ya ntɔki Nalingi koyebisa bino ete nasepelaki mingi na lisolo na bino “Ndenge ya kokoma na maloba ya ntɔki (poésie).” (8 Yuni 2001, ebimeli ya Lifalanse) Kobanda nazwá epaso, nakomaka masolo na maloba ya ntɔki, mpe yango epesaka ngai esengo mingi.
J. B., Grande-Bretagne
Kobanda bomwana na ngai nazalaki kolinga kokoma mingi. Yango esalaki ete nayeba kokoma maloba ya ntɔki. Matɔndi mingi ndenge bomonisaki ete “maloba ya ntɔki oyo bakomi yango malamu ekomamaka mpenza te na bato oyo batalelaka makambo likolólikoló.” Bato mingi bakanisaka ete bato oyo balɛmbá nde bakomaka maloba ya ntɔki. Nzokande, maloba ya ntɔki ezali moko ya ndenge oyo eleki malamu ya kokoma mikanda, mpe nazali na esengo ya koyeba ete Mozalisi na biso atalelaka yango mpe bongo.
M. T., Chili
Ba-Cathédrale Nasepelaki na lisolo “Ba-Cathédrale—Bamonima mpo na lokumu ya Nzambe to ya bato?” (8 Yuni 2001, ebimeli ya Lifalanse) Kasi, Batatoli ya Yehova mpe batongaka Bandako ya Bokonzi mpe Bandako ya Mayangani ya minene, boye te?
R. B., États-Unis
“Lamuká!” eyanoli: Tomonisaki ete kotonga Ba-Cathédrale ezalaki mabe kaka te mpo ezali minene kasi ezali mpo ete mbala mingi, likambo oyo ezalaki kosala ete bátonga yango ezali oyo moto moko ya mayele na makambo ya kala abengaki “lolendo” ya bakonzi ya mangomba. Lisusu, mbala mingi bandimi nde banyokwamaki mingi mpenza mpo na kopesa mbongo ya kotongisa bandako ya minene ndenge wana. Nzokande, Bandako ya Bokonzi mpe Bandako ya Mayangani ezalaka bandako ya mindɔndɔmindɔndɔ te mpe etongami mpo na lokumu ya moto te. Ezali nde bisika ya losambo. Mbongo mpo na kotonga yango eutaka na makabo ya bolingo malamu mpe esɛngaka na moto moko te apesa mbongo oyo eleki makoki na ye.
Mapekapeka ya butu Nazali na mbula 14, mpe nakamwaki mingi ntango natángaki lisolo “Lipekapeka kitoko ya butu.” (8 Yuni 2001, ebimeli ya Lifalanse) Ntango nyonso nazalaki kobanga mapekapeka yango ya butu; kasi lokola natángi lisolo yango, nakobanda kokanisa naino mingi liboso ya koboma yango!
D. S., États-Unis
Ntango nazalaki kotánga lisolo yango, lipekapeka moko ya butu eyaki kotɛlɛma pene ya lokolo na ngai. Namoná naino te lipekapeka ya butu kitoko ndenge wana! Biloko oyo Nzambe asalá ezali mpenza kitoko, mpe soki tozwi ntango ya kotala yango malamumalamu, bolingo na biso mpo na Nzambe ekokóma makasi koleka.
G. P., Italie
Lokola nayebaki te ete mapekapeka ya butu, oyo Yehova asalá, ezalaka kitoko mpe mitindo na mitindo, nazalaki komona yango na ntina te. Mwa moke nsima ya kotánga lisolo yango, lipekapeka moko ya butu eyaki pene na ngai ntango nazalaki kosopela milona mai. Napesaki Yehova matɔndi mpo na biloko oyo asalá mpe mpo na lisolo oyo esali ete nakóma kotala biloko yango na likebi mpenza.
C. S., États-Unis
Marée rouge Nazali molakisi, natángisaka makambo oyo etali ndenge malamu ya kosalela biloko ya ntina oyo ezwami pembenipembeni ya mai monene. Nazalaki koluka lisolo moko oyo ekolimbola marée rouge polelepolele; kasi, lokola nazalaki kaka kozwa yango te, nalongolaki elikya nyonso. Mosika te, lisolo “Ntango mai ya mbu ekómaka motane” (8 Yuni 2001, ebimeli ya Lifalanse) ebimaki, eyaki mpenza kosalisa ngai. Matɔndi mingi na ndenge bobimisaki lisolo yango.
J.O.P., Philippines