Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g02 Octobre nk. 12-15
  • Likei ya maligbanga ezali mpenza likamwisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Likei ya maligbanga ezali mpenza likamwisi
  • Lamuká!—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge babatelaka makei yango
  • Tótala na kati ya makei yango
  • Kobima ya mwana ya ndɛkɛ na likei
  • Bakutani na baboti oyo bakobɔkɔla bango
  • Moto amekolaka biloko oyo Mozalisi akelá
    Lamuká!—2004
Lamuká!—2002
g02 Octobre nk. 12-15

Likei ya maligbanga ezali mpenza likamwisi

EUTI NA MOKOMI NA BISO NA AFRIKA YA SUDI

Soki omoni likei ya maligbanga (Autruche) elali nyɛɛ na kati ya masini oyo epesaka makei molunge tii ekobimisa bana (couveuse), okoyeba te makambo nini ezali kosalema na kati, to mpe mbongwana nini ya monene elingi kosalema. Kasi, awa na ferme oyo babɔkɔlaka bamaligbanga, tozali na libaku malamu ya koyeba ndenge mpenza ya likamwisi oyo esalaka ete bana ya maligbanga bákola, kobanda mokolo likei ebotami.

Ndenge babatelaka makei yango

Maligbanga ya mwasi abotaka makei, ya langi ya mpɛmbɛ ya nzoku, na libulu oyo atimolaka na zɛlo. Likei na ye moko ekoki kokóma tii na kilo 1,45.a Na nsima, mokolo na mokolo, bato oyo basalaka na ferme bakendaka kozwa makei yango mpo na kotya yango na masini ya kopesa makei molunge, esika oyo makei yango ekosala pene na pɔsɔ motoba.

Sikoyo ekómi ntango ya kotyela makei yango likebi mingi na kati ya masini. Balalisaka yango malamu na molunge oyo ebongi mpenza (37o C) mpo bana oyo bazali na kati ya makei bákola malamu. Mpo ete eteni ya likei oyo ezalaka langi ya mosaka, oyo ekokóma mwana, ekita te na nse mpe ekangama te na mposo ya likei, nkolo ferme atyaka makei yango likoló ya saani moko oyo ekobanda kobaluka, to mpe mosali moko akobanda kobalola yango mikolo nyonso na mabɔkɔ. Yango ezali mpo na komekola ndenge oyo bamaligbanga babalolaka makei na bango mbala na mbala na mabulu oyo batimolaka na zɛlo, na esobe.

Tótala na kati ya makei yango

Kasi, ndenge nini tokoki koyeba makambo oyo ezali kosalema na kati ya makei yango? Na malɛmbɛ mpenza, nkolo ferme azwi likei moko, atii yango na mwa lidusu moko oyo ezali likoló na kɛsi moko, oyo mwinda ezali kopela na kati. Mayele wana epesaka mobɔkɔli likoki ya komona ndenge mwana azali kokola na kati ya likei. Asengeli kotalaka makei na mwinda yango mbala na mbala mpo na komona ndenge bana bazali kokola na kati. Soki atali mpe amoni ete na kati mpenza ya likei ezali kaka maimai, yango elakisi ete likei yango ezali na mwana te; akolongola yango na masini.

Na boumeli ya mikolo 39 oyo yango esalaka na kati ya masini, likei ya maligbanga, oyo mposo na yango engɛngaka lokola saani ya mbɛlɛ, ebombaka likambo moko ya kokamwa mpenza na kati. Kaka na ntango yango, saki moko ya mopɛpɛ, oyo nsukansuka ezwaka pene na ndambo moko likoló ya misato (1/3) ya likei mobimba, esalemaka na kati ya likei.b Mwana ya ndɛkɛ oyo azali na kati, akómi sikoyo komiyoka na nkaka na kati ya likei mpe abandi kosala makasi mpo abima libándá. Kasi, libosoliboso likambo moko ya ntina mingi esengeli naino kosalema: libenga ya moke, oyo eleisaka mwana na kati ya likei, ekobanda mokemoke kokɔta na kati ya motɔlu na ye mpo ekende tii na kati ya mwa libumu na ye. Yango ezali na ntina mingi mpamba te libenga wana nde ezali na bilei oyo bana yango bakozala na mposa na yango mwa moke na nsima, wana bakobima libándá.

Kobima ya mwana ya ndɛkɛ na likei

Nsukansuka, mokolo monene ekómi mpe toyei kotala. Liboso mpenza, bana yango ya ndɛkɛ basengeli naino kopasola libenga ya mopɛpɛ liboso ya kokóma na mposo ya likei. Bana ya maligbanga bakeseni na bana ya bandɛkɛ mosusu, oyo bazalaka na “lino ya likei” mpo na kopasola mposo ya likei na bango. Bana ya malibganga bazalaka na mwa mposo moko boye na nsɔngɛ ya minɔkɔ na bango mpo na kobatela yango. Mwana ya maligbanga akotya monɔkɔ na ye na mwa loposo oyo ezalaka na kati ya likei, akotindika nkingo na ye mpo mwa loposo oyo ekaboli ye na libenga ya mopɛpɛ epusana. Nsima ya kopusapusa mpe kokuluta yango mbala na mbala, nsukansuka loposo yango ekopasuka. Lokola apasoli yango, sikoyo atondi mobimba na kati ya likei.​—Talá elilingi A.

Sikoyo, mwa mimpululu ya mwana ya ndɛkɛ yango etondi na mopɛpɛ mpo na mbala ya liboso mpe ebandi kosala. Kasi, lokola asali milende mpe azali naino na kati ya likei, azali kopema malamu te. Yango wana asengeli kosuka wana te, asengeli kokoba kododa mposo ya likei mpo na kopasola yango. Azali kobimisa makasi na ye nyonso mpo na kotindikatindika yango mbala na mbala na motó na ye, mpe kotutatuta yango na monɔkɔ. Mbala moko, atako alɛmbi, amoni mwa polele na lidusu moko ya moke oyo efungwami na mposo ya likei. Ezali na nzela ya mwa lidusu wana nde azwi mwa mopɛpɛ kitoko ya libándá.​—Talá elilingi B.

Nsima ya kopema mingi, mpo asengeli kopema, mwana yango ya ndɛkɛ, oyo azali kopasola likei, azwi lisusu makasi ya kokoba kotuta mposo ya likei na lokolo na ye ya mobali mpe na monɔkɔ na ye oyo ezali naino na mwa loposo. Nsukansuka, abimi, lokola mwa Goliata ya moke; apanzi mposo ya likei mpe, azali koluka kotɛlɛma, afungoli miso na ye ya minene mpo na kotala mokili, na bokonde mpenza, elombe ya mwana ya maligbanga oyo abotami sika, azali kolɛnga kasi akoki kotambola.​—Talá elilingi C.

Mpo na nini nkolo ferme aboyaki kosalisa mwana yango ntango azalaki kobunda kobima na likei? Ezali mpo na bolamu ya mwana yango ya ndɛkɛ. Ezwaka mwa ntango mpo ete eloko moko ya moke oyo ezalaka na likei ya langi ya mosaka ekɔta mokemoke na motɔlu ya mwana ya ndɛkɛ, na nsima motɔlu yango ekangama. Soki otiki te ete esalema ndenge esalemaka, okoki kozokisa mwana yango, lokola azali naino makasi te mpe okofungola nzela azwa bamaladi mosusu.

Ezala ndenge nini, nsukansuka, bana yango ya ndɛkɛ babimi. Mpo na biso baoyo tozali kotala ndenge bana yango ya maligbanga bazali kobima na makei, balɛmbi, kasi balongi etumba, yango ezali mpenza kokamwisa biso.

Bakutani na baboti oyo bakobɔkɔla bango

Nsima ya mwa ntango, mopɛpɛ ya masini ekaukisi mwa nsala na bango, mpe bakómi komonana lisusu kitoko koleka, mpo na nsala na bango ya mikemike mpe ya kitoko. Na nsima, bakotya bango libándá na mwa lopango moko ya moke, mpo báyota moi. Emonani ete bazali mpenza kosepela bongo! Sikoyo bakoki komeka kotambola na mwa makolo na bango ya mike, oyo ezali naino kotɛngatɛnga!

Mokolo oyo elandi ezali mokolo ya ntina mingi mpo na bana yango ya ndɛkɛ oyo bazali naino na nsala ya mikemike. Bamemi bango epai ya babɔkɔli na bango: bamaligbanga ya mikóló, oyo bakobatela bango na boumeli ya sanza misato oyo ekolanda. Tii na ntango wana, bana yango ya maligbanga bayoki naino nzala te, mpo bazalaki naino kosalela bilei oyo ezalaka na eteni ya likei oyo ezalaka langi mosaka. Kasi, mikolo mingi nsima ya kobima libándá, babandi koyoka mwa nzala. Kasi eloko nini bakoki kolya? Tokamwi mpenza ndenge bana yango babandi kolya nde nyei ya sika ya baboti oyo bazali kobɔkɔla bango! Nkolo ferme ayebisi biso ete yango ekosalisa bango bámibatela na bamaladi, mpo nzoto na bango ekómi naino makasi te.

Talá ndenge bana yango bazali komeka kolanda kotambola lokola baboti na bango oyo bazali na makolo milai! Kasi, yango ezali pɛtɛɛ te mpo na bango. Kasi bana ya maligbanga bakolaka na ndenge moko ya kokamwa mpenza: na sanza moko, babakisaka molai ya santimɛtrɛ 30. Yango wana, ezali mpenza likambo ya kokamwa komona ete nsima ya sanza moko mpamba, bazali kopota mbangu nzela moko na mikóló, oyo baleki bango mosika.

Nsima ya sanza motoba, bana ya maligbanga bakómi mikóló mpe bakómi na molai ya mɛtrɛ mibale na ndambo (2,50 m). Ezali mpasi mpo na kondima ete, kaka sanza soki nsambo mpamba liboso, bingambe wana ya nkingo milai mpe makolo milai, bazalaki se makei oyo elalaki nyɛɛ na kati ya masini na ferme oyo babɔkɔlaka bamaligbanga!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Soki olingi koyeba makambo mingi etali maligbanga, talá lisolo “Un étonnant bolide: l’autruche” na Lamuká! ya 22 Yuli 1999, nkasa 16-18, na Lifalanse.

b “Likei ya maligbanga ezalaka na mwa madusu ya mikemike ebele oyo esalaka ete mwa mopɛpɛ ekɔtaka na kati. Mwa saki moke ya mopɛpɛ esalemaka katikati ya mposo mibale ya pɛtɛpɛtɛ oyo ezalaka na nsuka ya likei na epai oyo ezali monene, mpo na molunge ya libándá oyo ekaukisaka likei nsima ya kobotama na yango.”​—(Ostrich Farming in the Little Karoo).

[Etanda na lokasa 13]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

NDENGE BAPASOLAKA MAKEI NA BANGO

A

B

C

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Bililingi ezali ya: Dr. D. C. Deeming

[Elilingi na lokasa 13]

Mokolo monene: bana ya maligbanga babimi na makei!

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 15]

John Dominis/Index Stock Photography

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto