Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g03 Octobre nk. 23-25
  • Masese ya ba akan emonisaka bizaleli ya bato ya Ghana

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Masese ya ba akan emonisaka bizaleli ya bato ya Ghana
  • Lamuká!—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bandimaka Nzambe
  • Ndenge ya kofanda na bato mpe bizaleli malamu
  • Mayele ya bomoto
  • Mimeseno mpe bonkɔkɔ na bango
  • Koyeba kotala makambo ya bomoi
  • Masese ya “mikuse”
  • Ntango ya kopesa lisese
  • Toli oyo ebongi kolanda
  • Eteyelo na Afrika eteyaki makambo nini?
    Lamuká!—1995
  • Mokanda ya Biblia nimero 20—Masese
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Zwá mayele mpe ndimá disipilini
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • “Hema ya basembwi ekofulisama”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Makambo mosusu
Lamuká!—2003
g03 Octobre nk. 23-25

Masese ya ba akan emonisaka bizaleli ya bato ya Ghana

EUTI NA MOKOMI NA BISO NA GHANA

LISESE ezali nini? Lisese ezali elobeli ya mokuse oyo bato basalelaka mingi mpo na kopesa toli to kolobela likambo moko etali bomoi ya bato. Ba Yoruba ya Nigeria balobaka ete lisese ezali lokola “mpunda oyo ekoki komema moto noki na koyeba makanisi ya sika.”

Lisese oyo ya ba Akan ya Ghana emonisi polele ntina ya masese: “Balobaka na moto ya bwanya na masese, kasi na maloba mingi te.” Lisese yango elingi koloba ete ezali mpenza na ntina te koloba makambo ebele ebele epai ya moto ya bwanya mpo na kondimisa ye likambo oyo asengeli kosala. Lisese oyo ebongi etindaka moto akanisa, esalisaka ye akanga ntina ya likambo mpe ekoki kotinda ye asala oyo ezali malamu.

Na Ghana, basalelaka masese mingi na mokolo ya libala, na ntango moto akufi mpe na ntango bazali kobɛta miziki ya bonkɔkɔ. Masese ezalaka mpe na ntina mingi na ntango ya masolo elongo na batindami ya mboka mosusu. Mbala mingi moto oyo baponi to batindi mpo na koloba ezali moto oyo ayebi malamu koloba na masese.

Epai ya ba Akan, koyeba malamu kosalela masese emonisaka ete moto azali na bwanya. Biblia mpe elobi ete Mokonzi Salomo, oyo balobaka ete ayebaki masese 3 000, bakumisaka ye mpo na bwanya na ye, boyebi na ye, mpe boyokani na ye elongo na bikólo mosusu. Ntembe ezali te ete masese ya Biblia epemamaki na Nzambe mpe ezali ntango nyonso ya solo, nzokande ezali bongo te mpo na masese bato babimisá mpo na makambo oyo bakutanaka na yango mpe na mayele na bango. Masese oyo bato basali, ata soki ezali komonisa bwanya ya ndenge nini, ekoki soki moke te kokokana na oyo ya Biblia. Kasi, tótalela naino masese mosusu ya ba Akan.

Bandimaka Nzambe

Na Ghana, mbala mingi masese emonisaka ete Nzambe azali mpe masese mingi ya ba Akan emonisaka yango. Epai ya ba Akan, moto nyonso andimaka ete Nzambe azali. Na ndakisa, lisese moko elobaka boye: “Moto moko te alakisaka Nzambe epai ya mwana moke.” Likambo oyo ete Nzambe azali eyebani malamu, ata epai ya mwana moke. Basalelaka lisese yango mbala mingi mpo na kolobela likambo oyo mwana moke akoyeba ye moko ata soki balakisi ye te.

Lisese mosusu ya ba Akan elobaka boye: “Ata soki okimi mosika na Nzambe, azali kaka komona yo.” Yango wana, soki moto azali kosala makambo lokola nde Nzambe azali te, azali komikosa ye moko. Banda kala Biblia elobá likambo moko ya ndenge wana, ete miso ya Nzambe “ezali bipai nyonso, ezali kotala bato mabe ná bato malamu.” (Masese 15:​3, NW) Biso nyonso tokozongisa monɔkɔ epai ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.

Ndenge ya kofanda na bato mpe bizaleli malamu

Masese ya ba Akan, ndenge moko mpe na masese ya bato mosusu, elobelaka ndenge ya kofanda na bato mpe bizaleli malamu. Na ndakisa, maloba ekoki kobebisa to kobongisa, ndenge lisese oyo emonisi yango: “Kobɛta libaku na lolemo ezali mabe koleka kobɛta libaku na lokolo.” Soki moto ayebi kopekisa lolemo na ye te, yango ekoki kosala mabe mingi, ata mpe komema na liwa.​—⁠Masese 18:⁠21.

Nzokande, soki moto ayebi kopekisa lolemo na ye, yango ekoki kozala eloko oyo etyaka kimya, ndenge lisese oyo elandi emonisi yango: “Na esika oyo lolemo ezali, mino eswanaka te.” Likanisi ya lisese wana ezali ete bato mibale, na ndakisa mwasi ná mobali, bakoki kosilisa matata na ndenge ya boninga soki bayebi kosolola na ndenge ya kimya. Soki matata ezali kaka kosila te, moto mosusu oyo ayebi malamu kosalela lolemo na ye akoki kosilisa matata yango.

Mayele ya bomoto

Motuya ya bososoli mpe ya kokanisa malamu liboso ya kosala likambo emonisami polele na ebele ya masese oyo ezali kolobela mayele ya bomoto. Moto ya makila mɔtɔmɔtɔ mpe oyo akebaka te, oyo akanisaka liboso te mikakatano oyo ekoki kobima mpo na makambo oyo azali kosala, akoki kozwa toli na lisese oyo: “Liboso okende kotumola nyoka, luká naino nzela ya kokima.”

Moboti oyo amoni mwana na ye abandi kokóma na bizaleli mosusu ya mabe, akoki kotalela lisese oyo: “Soki omoni nzete moko ezali kokola, oyo ekoki kotɔbɔla yo liso, kokata kaka songɛ na yango te, pikolá yango.” Ɛɛ, esengeli kopikola to kolongola ezaleli nyonso ya mabe ntango kaka ebandi, mpo ekola te mpe esala moto mabe te.

Mimeseno mpe bonkɔkɔ na bango

Ntango mosusu esɛngaka koyeba mimeseno ya bato mpo na kokanga ntina ya masese na bango. Na ndakisa, epai ya ba Akan, kosalela lobɔkɔ ya mwasi ntango ozali koloba na bato, mingi mpenza epai ya mikóló, emonisaka kozanga limemya. Etinda wana ya bizaleli malamu emonisami polele na lisese oyo: “Kolakisa nzela ya mboka na yo na mosapi ya lobɔkɔ ya mwasi te.” Na maloba mosusu, esengeli kokumisa oyo ozali na yango, ezala mpe mboka na yo.

Lisese moko oyo elobelaka mimeseno ya bonkɔkɔ na ntango ya kolya epai ya ba Akan elobaka boye: “Mwana oyo asukolaka mabɔkɔ alyaka esika moko na mikóló.” Na ntango ya kolya, bato ya libota moko balyaka mikóló epai, bana mike epai. Kasi, mwana oyo azali na etamboli ya malamu, mingi mpenza na makambo etali bopɛto ya nzoto mpe ya bizaleli, akoki kozwa lokumu koleka bana mosusu mpe kolya elongo na tata na ye to esika moko na mikóló. Liteya: lokumu ya moto eutaka mingi mpenza na bizaleli na ye kasi na mbula na ye te.

Olingi kobala? Kanisá na lisese oyo ya ba Akan: “Libala ezali masanga ya mbila te oyo bamekaka.” Motɛki masanga ya mbila atikaka mosombi ameka liboso ya kosomba. Nzokande, libala bamekaka yango te. Lisese wana emonisi ete libala esangisaka bato mibale mpo na libela mpe libala ya komeka endimami te.

Koyeba kotala makambo ya bomoi

Masese mingi ya ba Akan emonisaka ete bankɔkɔ na bango bayebaki kotala malamu makambo oyo elekaka na bomoi ya bato mpe ya nyama. Na ndakisa, nsima ya kotala malamu mama ya nsoso ná bana na ye, babimisaki lisese oyo: “Mwana ya nsoso oyo azalaka pene na mama na ye azwaka mopende ya liyoyo.” Lisese yango elimboli nini? Soki moto alingaka kofanda na bato esika moko te, ezalaka pɛtɛɛ mpo na kobosana ye na ntango ya kokabola eloko moko ya malamu.

Moto oyo asilá komona ligbɔlɔlɔ oyo ekufi akondima lisese oyo: “Bayebaka molai mpenza ya ligbɔlɔlɔ kaka na ntango ekufi.” Mbala mingi bapesaka lisese wana soki bazali kondima valɛrɛ ya moto te. Moto oyo bazali koyeba valɛrɛ na ye te, akoki kobɔndisama na likanisi oyo ete valɛrɛ na ye ya solosolo ekoyebana ntango akozala te; ntango wana nde bakokanisa bizaleli na ye ya malamu.

Masese ya “mikuse”

Atako ba Akan bazalaki kolakisa bana na bango masese yango kaka na monɔkɔ, masese mingi emonanaka na bikeko na bango. Okoki komona yango na bikeko ya mabaya, lingenda ya bankumu, na kilo ya wolo, na bilamba ya mboka na bango mpe na mayemi ya bilamba ya mikolo oyo. Bapaya oyo bakendaka na Ghana bamonaka ntango mosusu na bandako oyo babombaka bikeko mpe mayemi, ekeko ya moto moko oyo moto mosusu azali komatisa ye na nzete. Yango ezali mpo na komonisa lisese oyo: “Soki ozali komata nzete ya kitoko, bakoki kosalisa yo na komata.” Yango elingi koloba ete soki ozali kosala likambo moko ya malamu, bakoki kopesa yo mabɔkɔ.

Ntango moto akufi ezalaka ntango ya komona, oyo moto moko oyo akomaka babuku abengi “elobeli ya bilamba.” Mawa oyo bato bazalaka na yango na ntango wana etindaka mpenza na kokanisa malamumalamu na makambo ya bomoi. Yango wana, mayemi oyo batyaka na bilamba ya matánga ezalaka na mateya ya mozindo mpenza. Na ndakisa, elamba oyo bayemi eskalye ezalaka lisese oyo: “Moto nyonso akomata na eskalye ya liwa.”a Lisese wana ezali kosalisa moto nyonso aboya kotombola mapeka mpe kozala na bomoi lokola nde akokufa te.​—⁠Mosakoli 7:⁠2.

Epai ya ba Akan, bato oyo bankumu ya mboka batindaka bango to baoyo balobaka makambo na ntango ya masolo ya bonkɔkɔ, bayebi malamu kosalela masese. Basimbaka lingenda ya bonkumu oyo bayemi makambo mosusu oyo ezali komonisa mitinda oyo bato ya mboka balingaka mingi. Na ndakisa, soki bayemi na lingenda ndɛkɛ ekangi na manzaka na yango nyoka na motó, yango ezali na lisese oyo: “Soki okangi nyoka na motó, nzoto nyonso oyo etikali ezali bobele nsinga ya mpamba.” Liteya nini ebombami wana? Kendá na motó ya likambo mpo osilisa yango malamu.

Ntango ya kopesa lisese

Ndenge kaka basalelaka ndakisa mpo na kolimbola likambo moko, kopesa lisese mpe ndenge ya kosalela yango esengeli kotalela likanisi oyo olingi kobimisa mpe bato oyo bazali koyoka yo. Kopesa lisese oyo ebongi te ekoki kobebisa likanisi oyo moto alingi koloba. Lokola na bonkɔkɔ mosusu kosalela masese na lisolo ezali na ntina mingi, soki moto ayebi kosalela masese te, bato bakomona ye mpamba.

Na Ghana, batalelaka mikóló ya mboka lokola bato oyo babimisaka masese mpe bakóló masese. Yango wana, liboso ya kopesa lisese, mbala mingi balobaka: “Bankɔkɔ balobá . . . ” Mpe soki moto azali koloba na esika oyo mikóló bazali mingi, mpo na komonisa limemya, liboso ya kopesa lisese moko, akoloba: “Bino mikóló nde bolobaka . . . ” Mpo na botosi, elenge akolinga te komonisa ete alingi koteya mikóló maloba ya mayele oyo ezali na masese.

Toli oyo ebongi kolanda

Bapesaka masese liboso ya koloba likambo moko, to nsima na yango. Kasi mbala mosusu, moto akoki kokɔtisa na mayele nyonso lisese na likambo oyo azali koloba mpe esɛngaka mpenza bososoli mpo na koyeba soki alobi lisese. Na ndakisa, mpo na kolobela moto ya kimya mpe ya komikitisa, mo Akan akoki koloba boye: “Soki ezalaki kaka mpo na songolo to pakala, mbɛlɛ bitumba ezalaka na mboka oyo te.” Yango ezali kolobela lisese oyo: “Soki zamba ezalaki bobele na mbɛmbɛ ná nkoba, mbɛlɛ lokito ya mondoki eyokanaka na zamba te.” Bato bamonaka ete nyama wana mibale ezalaka na boboto mpe ebundaka te. Bato oyo bazali na bizaleli wana batyaka kimya.

Kasi, soki olobi na mo Akan apesa yo mwa masese, ntango mosusu akopesa yo kaka lisese moko: “Balɔtaka ndɔtɔ kaka soki olali mpɔngi.” Na maloba mosusu, ndenge kaka esɛngaka kolala mpo na kolɔta, ndenge moko mpe lisese bapesaka yango kaka mpamba boye te. Likambo to lisolo nde eyebisaka lisese oyo ebongi kosalela.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Esengeli koyeba ete bayemaka na bilamba ya langi ndenge na ndenge, kaka te na bilamba ya moindo oyo bato balataka na ntango ya matánga.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto