Nkoma ya batángi
Maladi oyo nyama-nkɛkɛ epesaka Nazali molakisi na iniversite mpe nasali mbula 24 lokola mokambi ya laboratoire ya microbiologie, ya parasitologie mpe ya biochimie na iniversite yango. Boyebi mpenza kolimbola makambo ya siansi na ndenge moko ya pɛtɛɛ! Masolo “Nyama-nkɛkɛ oyo epesaka maladi” esepelisaki ngai mingi. (Lamuká! ya Yanuali-Marsi 2004) Ntango mosusu, nakangaka ntina malamu te ya makambo mosusu oyo ezali na mikanda ya siansi. Kasi ntango bino bolimbolaka yango, nakangaka ntina na yango malamu mpenza. Natɔndi bino mpo na milende nyonso oyo bozali kosala.
M. R., Mexique
Koyiba na ekzamɛ Natɔndi bino mpo na lisolo “Mituna oyo bilenge batunaka . . . Koyiba na ekzamɛ ezali mabe?” (Lamuká! ya Yuli-Sɛtɛmbɛ 2004) Baninga na ngai ya kelasi balobaki bakofuta ngai mbongo mingi soki nasaleli bango ekzamɛ. Lokola naboyaki, bamonaki yango mabe mpe bamonaki ete nazali motema mabe. Lisolo oyo ekundwelaki ngai ete nasengeli kokangama na mitinda ya Nzambe mpe kotosa mibeko na ye.
F.A.C., Nigeria
Nasalá naino devuare ngai moko te; nakomaka kaka biyano oyo nazwaka epai ya baninga na ngai ya kelasi. Lisolo oyo esalisi ngai nayeba ete kokoma biyano oyo ozwi epai ya moto mosusu ezali kaka koyiba. Ata soki baninga na ngai ya kelasi basepeli na likanisi yango te, ngai nakosala lisusu bongo te.
Y. D., Russie
Nkombo ya Nzambe Na mobu 1983, nasombelaki bana na ngai buku moko oyo ezalaki kolobela mboka Hawaii. Buku yango ezalaki mpe koyebisa ndenge oyo, na mobu 1800, mwasi ya mokonzi moko ya mboka yango apesaki litatoli mpo na Nzambe na ye, Yehova. Na ntango wana, ezalaki mwa mpasi na Slovaquie, ekólo oyo ba socialistes bazalaki koyangela, kokuta nkombo ya Nzambe na mikanda. Bambula ebele elekaki, toyebaki te ndenge nini mwasi ya mokonzi yango akokaki koyeba nkombo ya Nzambe na ntango wana. Yango wana, tosepelaki mingi ntango totángaki ndimbola oyo bopesi na lisolo “Nkombo ya Nzambe na bisanga ya Pasifike.”—Lamuká! ya Aprili-Yuni 2004.
E. G., Slovaquie
Misionɛrɛ na Afrika Nasepelaki mingi na lisolo ya bomoi ya Ernest Pandachuk, “Ebandeli ya malamu oyo epesaki ntina na bomoi na ngai.” (Lamuká! ya Aprili-Yuni 2004) Nazali na mikakatano ndenge na ndenge, na ndakisa nzoto etungisaka ngai mingi mpe nabɔkɔlaka mwana na ngai ya mobali ngai moko. Kasi, mikakatano na ngai ekokani te na oyo bandeko na biso baklisto mosusu na Afrika bakutanaki na yango. Lisolo yango esimbaki motema na ngai mpe etindaki ngai namanyola likoló ya maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 6:33, epai alaki ete Yehova akokokisa bamposa ya baoyo balukaka liboso Bokonzi.
M. C., Russie
Kosolola Namonaki ete nasengeli kokomela bino mpo na masolo “Kosolola—Ezali na ntina mingi mpo na bikelamu ya bomoi.” (Lamuká! ya Aprili-Yuni 2004) Masolo yango elimbolaki makambo oyo bikelamu ya bomoi esalaka—ndenge esalisanaka. Ata banzete eyebisanaka makambo mpo na kokebisana na likama! Ekozala likambo ya esengo soki bato bakómi mpe kosalisana ndenge wana.
C. C., États-Unis
Nasepelaki mingi na ndenge bolimboli lolenge nyama esololaka yango na yango. Tosengeli bobele kondima ete Nzambe azali, oyo azalisaki biloko nyonso wana ya kokamwa.
R. Z., Allemagne
Maloba ezali kozanga ngai mpo na komonisa esengo oyo nayokaki ntango natángaki masolo wana. Oyo nde libaku monene tozali na yango ya kosolola na Nzambe!
A. W., Afrika ya Sudi
Lelo na ntɔngɔ, ntango nabandaki kotánga lisolo yango, nazalaki na esengo te. Kasi, ntango nakómaki na esika oyo balobeli ndenge nyama-nkɛkɛ esololaka yango na yango, esɛkisaki ngai. Ntango nabimaki mpo na kokende mosala, nazalaki mpenza na esengo.
L. L., France