Nkoma ya batángi
Esika moko kitoko Matɔndi mingi mpo na lisolo “Pantanal—Esika moko kitoko.” (8 Sɛtɛmbɛ 1999, ebimeli ya Lifalanse) Ntango nazalaki kotánga lisolo yango, na makanisi, nakómaki na esika yango kitoko mpe ya kimya. Nazali kozela na motema likoló mokolo oyo Nzambe akokómisa mabele mobimba kitoko bongo.
M. A., Italie
Diabɛtɛ Nauti kosilisa kotánga lisusu lisolo “Mwana na yo ya mwasi azali na diabɛtɛ!” (22 Sɛtɛmbɛ 1999, ebimeli ya Lifalanse) Eleki sanza zomi, bayebisaki ngai ete nazali na diabɛtɛ type 1. Nazalaki ntango nyonso nzoto kolɔngɔnɔ, nazalaki mobongisi-nzela, elingi koloba mopalanganisi ya nsango malamu ya ntango nyonso, banda nazalaki na mbula 17. Na boumeli ya basanza oyo euti koleka, nasengelaki kobongola makambo mingi na bomoi na ngai. Nasengeli kosalela pompe à insuline, mpe mpo na kozwa mbongo ya komisalisa na maladi, nasengelaki kotika mosala ya mobongisi-nzela. Kasi, natɔndi bino mpo na ndenge bozali kobimisa masolo ya boye oyo ezali kosala ete tóyebaka ete bato mosusu mpe bazali kokutana na mikatano ya ndenge wana.
B. F., États-Unis
Mwana na ngai ya mobali ya mbula minei azali na diabɛtɛ banda azalaki na mbula mibale. Makambo oyo ekómelaki Sonya na libota na ye, toyebi yango malamu. Tozali na botɔndi mingi epai na baninga na biso baklisto mpo na bolingo oyo bamoniselaki biso oyo esalisaki biso tóyika mpiko na likambo yango.
C. R., Moldavie
Banda mwa kala, nazalaki kozela lisolo moko oyo ekolobela likambo yango. Nazali na mbula 17 mpe nabandaki kobela diabɛtɛ ntango nazalaki na mbula 5. Na bantango mosusu, nazalaki mpenza komona mpasi. Kasi nazali na esengo mingi ndenge nazwi lisolo moko ya pɛtɛɛ oyo nakoki kolakisa epai ya bato ya libota na ngai mpe baninga na ngai nyonso mpo na koyanola na mituna na bango mpe kosalisa bango báyeba makambo mosusu mingi ya diabɛtɛ.
K. W., Canada
Likama? Natángaki lisolo moko kitoko oyo ezalaki na motó ya likambo “Basi basalaki mosala mingi.” (22 Yuni 1999, ebimeli ya Lifalanse) Kasi nakamwaki mwa moke ndenge namonaki na fɔtɔ, basi oyo basalaki mosala ya botongi balataki ata eloko moko te ya kobatela miso.
R. L., États-Unis
Batángi basengeli koyeba ete bandeko yango oyo bazalaki kosala kuna na bolingo na bango moko, bazalaki kolata maskɛ ya kobatela miso ntango bazalaki kosala mosala. Nzokande, na ntango ya kokanga fɔtɔ, basɛngaki bango bálongola yango mpo bilongi na bango ya koseka emonana malamu.—BAKOMI
Makambo ya nko Nalingi kotɔnda bino mpo na lisolo “Mituna oyo bilenge batunaka . . . Nakosala nini soki basali ngai makambo ya nko? (Yanuali-Marsi 2000) Atako nazali elenge, basalaki ngai makambo ya nko mingi na bomoi na ngai, mpe yango epesaki ngai mpasi mingi na motema. Yango ezalaki mpasi mpo na ngai ete nakokisa mosala na ngai ya mobongisi-nzela oyo nabandaki esili koleka mbula mwambe. Na esika oyo elobaki ete: “Salá oyo okoki kosala mpo na kokanga motema,” yango ebondisaki ngai mingi. Maloba yango ezali mpenza ya bolingo, napesi bino matɔndi mingi mpo na yango.
A. G., Italie
Miziki Naumeli bambula mingi na mokumba ya nkulutu na lisangá ya boklisto mpe ntango nyonso nasepelaka na bilenge. Kasi, eleki mwa mikolo, nayokaki mawa mingi mpamba te napesaki toli moko oyo elobaki ete miziki mosusu ya mikolo na biso ezali na likama, kasi balandaki yango te. Nzokande, lisolo “Miziki ezali na nguya makasi koleka ndenge okoki kokanisa” (Yanuali-Marsi 2000) ezalaki mpenza oyo nazalaki na yango mposa. Makanisi oyo bozwaki na mikanda mosusu oyo elobelaki makama ya miziki ezalaki mpenza kitoko mingi. Nakosalela makanisi yango elongo na bilenge.
D. H., Bolivie
Lokola nazali moyembi mpe molakisi ya miziki na eteyelo ya ebandeli, masolo na bino ya miziki ezalaki mpenza kitoko. Matɔndi!
K. F., États-Unis