Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g05 8/1 nk. 14-16
  • Kosangisa nzoto liboso ya kobala ezali mabe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kosangisa nzoto liboso ya kobala ezali mabe?
  • Lamuká!—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Pite ezali nini?
  • Ezali na makama
  • Yebá komipekisa
  • Mabe ezali wapi soki nasangisi nzoto liboso nabala?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Ndenge nini nakoki kolimbola mateya oyo etali kosangisa nzoto?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Kosangisa nzoto ekobongisa boyokani na biso?
    Lamuká!—2010
  • Kosangisa nzoto ekokolisa bolingo na biso?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
Makambo mosusu
Lamuká!—2005
g05 8/1 nk. 14-16

Mituna oyo bilenge batunaka . . .

Kosangisa nzoto liboso ya kobala ezali mabe?

“Ntango mosusu namitunaka soki kosangisa nzoto liboso ya kobala ezali mpenza mabe, mingi mpenza ntango namiyokaka ete nakeseni na bilenge mosusu mpo nayebi naino basi te.”​—⁠Jordon.a

Kelly alobi boye: “Nayokaka mposa makasi ya komeka kosangisa nzoto. Nakanisi biso nyonso toyokaka mposa wana oyo tobotamá na yango.” Abakisi lisusu: “Esika nyonso okokende, makanisi ya bato ezali kaka na makambo ya kosangisa nzoto!”

YO MPE omiyokaka lokola Jordon ná Kelly? Kutu, bonkɔkɔ mpe mimeseno oyo ezalaká kala kopekisa likambo ya kosangisa nzoto liboso ya kobala ezalaka lisusu mpenza te. (Baebele 13:⁠4) Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na ekólo moko ya Azia, emonisaki ete bana mibali mingi oyo bazali na mbula banda 15 tii 24 bakanisaka ete kosangisa nzoto liboso ya kobala ezali mabe te mpe moto nyonso asengeli koleka wana. Ezali likambo ya kokamwa te soki na mokili mobimba, bilenge mingi basilá kosangisa nzoto liboso bákokisa mbula 19.

Epai mosusu, ezali na bilenge oyo baboyaka kosangisa nzoto, kasi basalaka makambo mosusu na esika na yango, mpo na kokokisa mposa yango; na ndakisa kosimbanasimbana binama ya kobotela (oyo babengaka masturbation réciproque). Zulunalo New York Times epesi lapolo moko ya mawa, oyo emonisi ete “kosangisa nzoto na monɔkɔ ekómi kosalelama mingi lelo oyo, mpe bilenge mingi balobaka ete yango ezali kosangisa nzoto mpenza te, ezali na likama mpenza te lokola kosangisa nzoto ya solosolo, . . . mpe ezali ndenge ya kokima kozwa zemi mpe kotikala kaka ngɔndɔ.”

Kasi, ndenge nini moklisto asengeli kotalela likambo ya kosangisa nzoto liboso ya kobala? Mpe tokoloba nini mpo na balolenge wana mosusu ya kosangisa nzoto? Nzambe andimaka yango? Ezali na likama te? Mpe moto oyo asali yango, akotikala kaka ngɔndɔ?

Pite ezali nini?

Kaka Mozalisi na biso​—⁠Yehova Nzambe, nde akoki kopesa eyano oyo ebongi na mituna wana. Na Liloba na ye, ayebisi biso ‘tókima pite.’ (1 Bakolinti 6:​18) Kasi, yango elingi mpenza koloba nini? Liloba ya Grɛki oyo babongoli na “pite” esuki kaka te na kosangisa nzoto, kasi etaleli mpe ebele ya misala mosusu ya mbindo. Na yango, soki bato mibale oyo babalani te basangisi nzoto na monɔkɔ to bakómi kosimbanasimbana na binama ya kobotela, basali mpenza pite.

Kasi, esengeli nde kotalela bango lokola bangɔndɔ​—⁠ezala na miso ya Nzambe? Na Biblia, liloba “ngɔndɔ” esalelamaka mpo na komonisa bizaleli ya pɛto. (2 Bakolinti 11:​2-6) Kasi, basalelaka yango mpe mpo na kolobela moto oyo ayebi naino mibali to basi te. Biblia elobeli mwana mwasi moko na nkombo Lebeka. Elobi ete azalaki “ngɔndɔ, mpe mobali moko te asangisaki na ye nzoto.” (Genese 24:​16, NW ) Likambo oyo esengeli kobenda likebi na biso ezali ete, liloba ya Liebele mpo na kolobela “kosangisa nzoto” elimbolaka mpe misala mosusu, longolá likambo ya kosangisa nzoto ya mwasi ná mobali. (Genese 19:​5, NW ) Na yango, na kotalela Biblia, soki mwana mobali to mwana mwasi asali pite ezala ya lolenge nini, azali lisusu ngɔndɔ te.

Biblia epesi baklisto etinda básuka kaka na kokima pite te, kasi bákima mpe misala nyonso mosusu ya mbindo oyo ekoki komema na pite.b (Bakolose 3:⁠5) Bato mosusu bakoki kotyola yo mpo ozali kotosa etinda yango. Elenge moklisto moko na nkombo Kelly, alobi ete, “na bambula nyonso oyo nalekisaki na eteyelo ya ntei, bilenge mosusu bazalaki koloba na ngai ete ‘Ozali koyeba te nini ozali kozanga!’ ” Nzokande, kosangisa nzoto liboso ya kobala ezali bobele “bosepeli ya ntango mokuse ya lisumu.” (Baebele 11:​25) Ekoki koyokisa yo mpasi oyo ekoumela na nzoto, na makanisi, mpe na elimo.

Ezali na makama

Biblia eyebisi biso ete mokolo moko mokonzi Salomo azalaki kotala ndenge mwasi moko azalaki kobenda mwana mobali moko ya monzemba mpo básangisa nzoto. Salomo akokanisaki mwana mobali yango na “ngɔmbɛ oyo akei na kobomama.” Ngɔmbɛ oyo balingi koboma yango eyebaka mpenza te likambo oyo elingi kokómela yango. Mbala mingi, bilenge oyo basangisaka nzoto liboso ya kobala bazalaka ndenge wana​—⁠bayebaka mpenza te to mpe bayebaka ata moke te ete likambo oyo balingi kosala ekobimisa makama minene! Salomo alobaki boye mpo na mwana mobali yango: “Ayebi te ete yango etali molimo na ye mpenza.” (Masese 7:​22, 23, NW ) Ya solo, “molimo” na yo​—⁠bomoi na yo​—⁠ezali na likama.

Na ndakisa, mbula na mbula bamilio ya bilenge bazwaka bamaladi oyo eutaka na kosangisa nzoto. Lydia alobi boye: “Ntango nayebaki ete nazali na maladi ya kasende nayokaki mposa ya kokima.” Amileli boye: “Ezali maladi moko ya mabe oyo ekosila te.” Lelo oyo, kati na bato oyo bazali kozwa sida na mokili mobimba (6 000 na mokolo), mingi ezali nde bilenge oyo bazali na mbula banda 15 tii 24.

Mingimingi, basi nde bakutanaka na mikakatano oyo eutaka na kosangisa nzoto liboso ya kobala. Kutu, likama ya kozwa bamaladi oyo eutaka na kosangisa nzoto (na ndakisa sida) ezali makasi epai ya basi koleka epai ya mibali. Lisusu, soki mwana mwasi oyo azali naino moke azwi zemi, atye bomoi na ye mpe ya mwana oyo azali na libumu na ye na likama. Mpo na nini? Mpamba te ekoki kozala ete nzoto na ye ya mwana mwasi ekoli naino mpenza te mpo azala na likoki ya kobota kozanga likama.

Ata soki elenge mwasi azwi zemi mpe aboti kozanga ete akutana na mikakatano ya minene, mokumba ya monene ezali kozela ye, oyo ya kobɔkɔla mwana. Bilenge basi mingi bayaka komona ete kokokisa bamposa na bango moko mpe ya mwana oyo baboti ezali mpasi mingi koleka ndenge bakanisaki.

Longola yango, ezali mpe na mpota oyo etikalaka na makanisi mpe na elimo. Lisumu ya kosangisa nzoto oyo mokonzi Davidi asalaki, etyaki boyokani na ye ná Nzambe na likama mpe elingaki koboma ye na elimo. (Nzembo 51) Atako Davidi azongelaki makasi ya elimo, nzokande, mikakatano oyo eutaki na lisumu oyo asalaki enyokolaki ye tii na nsuka ya bomoi na ye.

Lelo oyo, bilenge bakoki mpe kokutana na mikakatano ndenge wana. Na ndakisa, ntango Cherie azalaki bobele na mbula 17, abandaki kosangisa nzoto ná mwana mobali moko. Akanisaki ete mwana mobali yango alingaki ye. Bambula ebele na nsima, likambo yango esalaka ye kaka mpasi na motema. Amileli boye: “Nazwaki mateya ya Biblia na lisɛki, mpe yango ebimiselaki ngai mikakatano mingi. Nabebisaki boyokani na ngai ná Yehova mpe yango epesaki ngai mpasi mingi.” Elenge mwasi mosusu na nkombo Trish alobi boye: “Ndenge nasangisaki nzoto liboso ya kobala, nasalaki foti oyo eleki monene na bomoi na ngai. Nakosala nyonso mpo nazonga lisusu ngɔndɔ.” Ya solo, mpota ya makanisi ekoki kotikala bambula mingi; mpe ekoki kobimisa mitungisi mpe kopesa mpasi na motema.

Yebá komipekisa

Shanda, elenge mwasi moko, atuni motuna moko ya ntina: “Mpo na nini Nzambe apesá bilenge mposa ya kosangisa nzoto soki ayebaki ete bakokokisa yango kaka tii ntango bakobala?” Ezali solo ete mposa ya kosangisa nzoto ekoki kozala makasi, mingi mpenza na “eleko ya ebandeli ya bolenge.” (1 Bakolinti 7:​36) Kutu, mposa ya kosangisa nzoto ekoki ntango mosusu koyela elenge mbalakaka, kaka mpamba bongo. Kasi, likambo ya mabe ezali wana te. Esalemaka bongo ntango binama ya kobotela ezali kokola.c

Ezali mpe solo ete Yehova asalá ete kosangisa nzoto esepelisa. Yango eyokanaki na mokano na ye ya ebandeli ete bato bátondisa mabelé. (Genese 1:​28) Atako bongo, mposa ya Nzambe ezalaki soki moke te ete tósalela makoki na biso ya kobota na ndenge ya mabe. Biblia epesi toli oyo: “Moko na moko na bino ayeba kokanga mbɛki na ye moko malamu na kati ya kosantisama mpe lokumu.” (1 Batesaloniki 4:⁠4) Koluka kokokisa mposa ya kosangisa nzoto mbala nyonso oyo yango eyeli yo, ezali lokola koluka kobɛta moto mbala nyonso oyo oyoki nkanda; yango ezali bozoba mpenza.

Kosangisa nzoto ezali likabo oyo Nzambe apesá bato, likabo oyo esengeli kosalela yango kaka na ntango oyo ebongi​—⁠na kati ya libala. Nzambe ayokaka ndenge nini soki tomeki kosangisa nzoto liboso ya kobala? Kanisá ete osombi eloko moko oyo olingi kokabela moninga na yo. Liboso kutu okabela ye yango, ayibi yango! Yango ekosepelisa yo? Kanisá sikoyo ndenge Nzambe ayokaka ntango moto asangisi nzoto liboso ya kobala, ezali lokola ayibi eloko oyo Nzambe alingaki kokabela ye.

Osengeli kosala nini soki mposa ya kosangisa nzoto eyeli yo? Na mokuse, yebá komipekisa. Kobosana te ete ‘Yehova akoboya kopesa eloko malamu soki moke te na baoyo bazali kotambola alima.’ (Nzembo 84:​11) Elenge moko na nkombo Gordon alobi boye: “Soki nabandi kokanisa ete kosangisa nzoto liboso ya kobala ezali mpenza mabe te, nakanisaka mingi na makama ya elimo mpe na nsuka namonaka ete ezali na ntina moko te kosala lisumu oyo ekobebisa boyokani na ngai ná Yehova.” Komipekisa ekoki kozala ntango nyonso pɛtɛɛ te. Kasi, ndenge elenge Adrian alobi yango, “komipekisa ekosala ete ozala na lisosoli ya pɛto mpe na boyokani malamu ná Yehova. Okozala pɛpɛlɛ mpo otya makanisi na yo nyonso na makambo oyo eleki ntina, mpe lisosoli na yo ekofunda yo te mpo na makambo oyo osalá kala.”​—⁠Nzembo 16:⁠11.

Ozali na bantina mingi ya malamu ya “koboya pite” ya lolenge nyonso. (1 Batesaloniki 4:⁠3) Ya solo, yango ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Lisolo mosusu ekobima, oyo ekomonisa na makambo nini mpenza okoki ‘komibatela pɛto.’​—⁠1 Timote 5:⁠22.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa.

b Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali pite, bosɔtɔ, mpe etamboli ya mbindo, talá lisolo “Les jeunes s’interrogent . . . Jusqu’où ne pas ‘aller trop loin’?” oyo ebimaki na Lamuká! ya 22 Ɔkɔtɔbɛ 1993, na Lifalanse.

c Talá lisolo “Les jeunes s’interrogent . . . Pourquoi mon corps change t-il?” na Lamuká! ya 8 Febwali 1990, na Lifalanse.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 15]

Soki elenge asali pite ata ya lolenge nini, Nzambe akoki nde kotalela ye lokola ngɔndɔ?

[Elilingi na lokasa 15]

Kosangisa nzoto liboso ya kobala ekoki kozokisa lisosoli ya elenge oyo abangaka Nzambe

[Elilingi na lokasa 16]

Baoyo basangisaka nzoto liboso ya kobala bakoki kozwa maladi oyo eutaka na kosangisa nzoto

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto