Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/9 nk. 25-29
  • Kosolola na kati ya mosala na boklisto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kosolola na kati ya mosala na boklisto
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kosolola na kozanga maloba
  • Mpo na kosolola, esengeli kokanisa elongo na bato
  • Bizaleli ya ntina mingi mpo na kosolola malamu
  • Bolingo ezali na ntina mingi​—mpo na kosolola
  • Kosolola na kati ya libota mpe na kati ya lisangá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Jéhovah mpe klisto basololi minene elongo na bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Kosolola oyo ememaka na bomoi
    Lamuká!—2004
  • Yebá kosolola malamu na bato!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/9 nk. 25-29

Kosolola na kati ya mosala na boklisto

“Boye bokenda kozalisa bayekoli na mabata nyonso.”​—MATAI 28:19.

1. Kosolola ezali na ntina mpo na kokokisa mosala nini oyo Yesu apesaki?

MOSALA oyo Yesu apesaki epai na bayekoli na ye ezali kosenga na biso kosolola elongo na bato nyonso oyo tozali kokutana na bango kati na mosala ya ndako na ndako, na bozongeli bato basepelaki mpe kati na mitindo nyonso mosusu ya mosala ya kosakola Bokonzi. Na mosala wana makasi, tozwi mokumba ya koyebisa solo likoló na Jéhovah Nzambe, likoló na Yesu Klisto mpe likoló na Bokonzi ya Masiya oyo Yesu azali koyangela na eleko na biso.​—Matai 25:31-33.

2. Lolenge nini tokoki kotonga kosolola malamu?

2 Lolenge nini tokoki kosolola malamumalamu elongo na bato? Libosoliboso, tosengeli kondima makambo oyo tozali koloba. Na maloba mosusu, tosengeli kozala na kondima makasi kati na solo oyo: ete Jehovah azali Nzambe ya solo bobele moko, ete Biblia ezali solo Liloba na Nzambe, mpe Bokonzi na Nzambe ezali elikya bobele moko mpo na bato. Na motindo yango, makambo oyo tozali koteya makouta mpenza na motema na biso, mpe tokolanda toli oyo Paulo apesaki na Timoté ete: “Omeka na nguya nyonso komimonisa yo mpenza epai na Nzambe lokola mosali oyo abongi koyoka nsoni te, awa ezali yo kosembola liloba na solo.”​—2 Timoté 2:15.

Kosolola na kozanga maloba

3-5. (a) Lolenge nini tokoki kosolola kozanga liloba? (b) Likambo nini lisalemaki oyo ezali kondimisa yango?

3 Mpo na kosolola, mbala mingi esengeli koloba. Kasi biso tosololaka na bato liboso nkutu ete toloba na bango. Lolenge nini? Na ezaleli na biso, na molato na biso mpe na lolenge na biso ya kokata nsuki. Eleki bambula mingi, misionere moko oyo azwaki lipolɔmi na Galaad, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower, amataki masuwa monene pakebo oyo ememaki ye na mboka oyo asengelaki kokenda mpo na mosala na ye. Nsima na mwa mikolo, moto moko ayebanaki na ye te, atunaki ye ete mpo na nini akesenaki na basali mobémbo mosusu. Bobele na molato na ye mpe na etamboli na ye, misionere wana ayebisaki likambo moko malamu: ete azalaki na mitinda mikeseni na oyo ye bato mosusu mpe azalaki pene na kosolola na bato nyonso. Na yango, azwaki libaku kitoko ya kopesa litatoli.

4 Ndakisa mosusu, ndeko mwasi moko azalaki kolakisa mikanda mikolimbolaka Biblia kati na balabála, amonisaki koseka ya bolingo epai na mwasi moko moleki nzela. Mwasi yango abandaki kokita na esikaliyé ya esika ekotelemaka métro; na nsima, abongolaki makanisi, azongelaki ndeko mwasi mpe asengaki ye boyekoli na Biblia. Eloko nini esimbaki ye? Ndeko mwasi alakisaki ye mokanda mokolimbola Biblia te, kasi amonisaki ye bobele kosɛka ya bolingo.

5 Ndakisa ya misato: wana ezalaki bango na restorá, etuluku moko ya bilenge ba Témoins bakamwaki na komona moto moko oyo bayebaki ye te, abɛlɛmaki na mesa na bango mpe afuteli bango. Mpo na nini mobali wana asalaki bongo? Mpo ete etamboli na bango ezalaki na bopusi makasi likoló na ye. Kozanga koloba na ye ata likambo moko, baklisto wana bayebisaki nsango moko ete: bazalaki bilenge oyo bakobangaka Nzambe. Emonani mpenza ete, na ezaleli na biso, na lolenge na biso mpe na boboto na biso, tozali kosolola elongo na bato mosusu to kopesa nsango kozanga kobimisa ata liloba moko.​—Tala 1 Petelo 3:1, 2.

Mpo na kosolola, esengeli kokanisa elongo na bato

6. Pesa ndakisa moko mpo na komonisa lolenge nini kokanisa elongo na moto ezali na ntina mingi mpo na kosolola.

6 Mpo na kosolola likoló na nsango malamu, tosengeli kozala pene na kolobana na bato, lokola mpo na kosopela bango mateya te, kasi na kokanisáká elongo na bango. Tokotangaka mbala mingi ete Paulo akanisaki elongo na bato oyo azalaki komeka koyebisa bango nsango malamu. (Misala 17:2, 17; 18:19) Lolenge nini kolanda ndakisa na ye? Kobakisama na mpasi na makambo ya mokili esili mbala mosusu komema bato mosusu na kobeta ntembe ete Nzambe Mozwi​—na​—Nguya-Nyonso mpe na bolingo, Nzambe oyo komibanzabanzaka na bato, azali te. Tokoki kokanisa elongo na bato wana mpo na komonisa bango ete mpo na Nzambe, likambo na likambo ezali na ntango na yango. (Mosakoli 3:1-8) Mpo na yango, tozali kotanga na Bagalatia 4:4 ete, wana elaká ekokaki, Nzambe atindaki mwana na ye awa na mokili. Yango esalemaki nsima na bambula mingi mpenza uta ntango oyo apesaki elaká mpo na mbala ya yambo. Bobele bongo, wana ekokóma ntango oyo ye asili kopona, akosilisa mpasi mpe mabe. Lisusu, Liloba na ye limonisi ete bantina minene oyo Nzambe atiki nzela na mabe eumeli uta kala. (Tala Exode 9:16.) Soki totaleli makanisi oyo, nzela moko na masese mpe na komonisa bilembeteli bizwami na Biblia, tokosalisa bato na motema sembo bakanga ntina ete tokoki te koloba ete Nzambe azali te to ete komibanzabanzaka mpo na bato te, bobele mpo ete mabe mazali.​—Baloma 9:14-18.

7, 8. Lolenge nini tokoki kosolola malamu mpenza na Moyuda moko, na kokanisáká elongo na ye?

7 Na ndakisa, soki tokutani na moto moko kati na mosala ya ndako na ndako, mpe alobi na biso ete: “Ngai nazali Moyuda. Makambo na bino mazali kosepelisa ngai te.” Lolenge nini tokomema lisolo? Ndeko moko ayebisi ete bayokaka ye wana akolobaka ete: ‘Okondima solo ete, Moïse azalaki moko na basakoli minene na Nzambe. Kasi oyebi ete alobaki na Deteronome ete: “Nayebi ete na nsima na kufa na ngai, bino . . . bokopɛngwa na nzela oyo elakelaki ngai bino . . . mabe makokwela bino”? Moïse azalaki mosakoli na solo; maloba na ye masengeli kokokana. Mbala mosusu ekokanaki nde na ntango oyo Nzambe atindaki Masiya epai na Bayuda, likambo limonisaki ntina oyo baboyaki kondima ye? Soki ezali bongo, mpe ete Bayuda bamizimbisaki, mpo na ntina nini ngai na yo tokosala libunga oyo moko?’

8 Omikundola lisusu ete Bayuda banyokwamaki mingi epai na boklisto ya lokuta, mingi mpenza na ekeke oyo ya ntuku mibale, Mbala mosusu okoki koyebisa na molobani na yo sikisiki ete biso tosanganaki soko moke te na minyoko wana. Na ndakisa, okoki koloba ete: ‘Oyebi ete na ntango Hitler azalaki mokonzi, ba Témoins de Jéhovah baboyaki konyokola Bayuda? Baboyaki mpe kopesa losako lokola losambo na Hitler mpe kokɔta na mosala ya soda.a

9, 10. Lolenge nini tokoki kosalisa moto oyo azali kondima Lifelo, na kokanisáká elongo na ye?

9 Kati na milende oyo tozali kosala mpo na kosolola elongo na moto oyo azali kondima lifelo, tokoki kosalela makanisi oyo ete: mpo na konyokwama libela na libela kati na lifelo, esengeli kozala na molimo mokokufaka te. Ye oyo akondimaka lifelo akondima mpenza maloba oyo. Na nsima, tokoki kolobela lisoló ya kozalisama ya Adam mpe Eva, mpe kotuna ye na bolingo nyonso soki asili komona likanisi ya molimo mokokufaka te. Na kolanda likanisi na biso, tokoki kotanga Genese 2:7. Kati na verset oyo, Biblia elobi na biso ete Adam akómaki molimo, Na likambo yango, tala maloba na Nzambe mpo na oyo esengelaki kobima na ntina na lisumu ya Adam: “Na molungé na elongi na yo, okolya mampa kino ntango ekozonga yo kati na mabelé, mpo ete okamatamaki na yango, mpamba te ozali mputulu, mpe okozonga na mputulu. (Genese 3:19) Na yango, molimo Adam azongaki na mputulu.

10 Tokoki mpe kolakisa molobani na biso ete na Genese, esika moko te ezali komonisa likanisi ya mpasi ya seko kati na lifelo. Na ntango Nzambe apesaki etinda na Adam ete alya mbuma epekisamaki te, alobaki ete: “Mokolo okolya yango okokufa solo.” (Genese 2:17) Alobelaki lifelo te. Soki etumbu ya lisumu esengelaki kozala mpasi ya seko kasi kufa te, oyo elimboli ‘kozonga na mputulu,’ mbɛlɛ Nzambe alimbolaki yango polele te, na bosembo nyonso? Bongo, na kosaleláká makanisi oyo na mayele mpe na boboto, tokoki kosalisa moto na motema sembo na komona ete bindimeli na ye bizali na mobulu. Wana ezali biso kosakola solo oyo ezali kati na Liloba na Nzambe, totika te kokanisa elongo na bato; yango ezali na ntina mingi.​—Tala 2 Timoté 2:24-26; 1 Yoane 4:8, 16.

Bizaleli ya ntina mingi mpo na kosolola malamu

11-13. Bizaleli nini ya boklisto bikoki kosalisa biso na kosolola malamu elongo na bato?

11 Tosengeli kolóna bizaleli nini mpo na koyebisa solo ya Bokonzi na lolenge malamu mingi? Liboso na nyonso, ndakisa na Yesu ezali koteya biso nini likoló na likambo yango? Na Matai 11:28-30, alobaki ete: ’’Boya epai na ngai, bino nyonso bozali kolɛmba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino. Bokamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe boyekola na ngai; mpamba te ngai nazali na bopɔlɔ mpe na motema mosɔkɛmi; bokozwa kopema mpo na milimo na bino. Mpo ete ekanganeli na ngai ezali na motau, mpe mokumba na ngai mozali na bozito te.’’ Wana tozali komona moko na makambo mapesaki Yesu nzela ete alónga kosolola elongo na bato. Azalaki na bopɔlɔ mpe na motema mosɔkɛmi. Bato na motema sembo bazwaki epemelo epai na ye. Ntoma Paulo mpe apesaki ndakisa kitoko, mpamba te, alobaki yango epai na bankulutu ya Efese ete, uta na mokolo ya liboso oyo akutanaki na bango, asalelaki Nkolo “na kosɔkɛma nyonso na motema.”​—Misala 20:19.

12 Soki tozali ntango nyonso na bopɔlɔ mpe na elimo ya komikitisa, biso mpe tokozala elendiseli mpo na bato mosusu, mpe ekozala na biso pɛtɛɛ mpo na kosolola na bango. Ezaleli nyonso mosusu ekotya epekiseli kati na biso mpe baoyo tozali komeka kosolola na bango. Solo mpenza, “mayele mazali elongo na bato na bopɔlɔ.”​—Masese 11:2, MN.

13 Mpo na kolonga kolakisa likambo epai na moto mosusu, esengeli mpe kozala na motema pɛtɛɛ mpe na maloba makoki kozokisa te. Ntembe ezali te ete, ntoma Paulo amonisaki mayele wana apesaki litatoli liboso na bafilozofe oyo bayanganaki na ngomba ya Ale. Alakisaki nsango malamu na motindo boye ete bato wana bakanga ntina na yango. (Misala 17:18, 22-31) Soki tolingi kosolola malamumalamu elongo na baoyo bazali koyoka biso, tosengeli kolanda toli oyo ntoma Paulo apesaki epai na Bakolose, ete: “Bolobaka . . . na bolingo mpe na elɛngi ya mongwa, ete bozwa mitema na bango. Boyekola kopesa biyano na ntango na yango, mpe na kotalela bamposa ya moto na moto.” (Bakolose 4:6, Kuen) Maloba na biso masengeli ntango nyonso kozala na elɛngi, mpo na kofungola elimo ya balobani na biso; nzokande maloba mabe makozipa elimo na bango.

14. Monisa ete na kozaláká na ezaleli na kimya mpe na kolukáká kolobisa molobani na biso, tokozala basololi malamu.

14 Tolingi komonana na kimya na mabaku nyonso. Yango ezali kopesa nzela na molobani na biso na komiyoka malamu. Na ndakisa, mosakoli moko akomimonisa na kimya wana akoluka te ete aloba bobele ye moko. Nzokande, na ezaleli ya kimya mpe na mituna ya boninga, azali kopesa molobani na ye libaku ya koloba. Ezali mpenza likambo na mayele na kolendisa molobani na biso ete aloba na ntango tozali kopesa litatoli na libaku malamu. Ezali yango nde esalemaki na Témoin moko afandaki mokolo mosusu pene na sángó moko kati na mpepo. Koleka ngonga moko, Témoin atunaki mituna ya mayele epai na sángó oyo, mpe bobele sángó nde alobaki mingi mpenza wana azalaki kopesa biyano. Kasi, na ntango mibali wana mibale bakabwanaki, sángó amemaki mikanda mingi oyo mikolimbolaka Biblia. Motema pɛtɛɛ oyo touti kolobela ezali kopesa biso nzela na komonisa ezaleli mosusu ya ntina mingi.

15, 16. Na likambo nini komitya na esika ya bato mosusu ezali kosalisa biso na kosolola malamu?

15 Tolingi kolobela ezaleli oyo etali komitya na esika ya bato mosusu. Ntoma Paulo ayebaki mpenza ntina ya ezaleli wana, lokola yango emonisami na oyo ye akomaki epai na Bakolinti, ete: Ata nazali moombo na moto moko te, nasili komiyeisa moombo na banso ete nazwa bato mingi. Epai na Bayuda, nayei lokola Moyuda ete nazwa Bayuda; epai na bango na nsé na Mibeko, nayei lokola moto na nsé na Mibeko (ata nazali ngai moko na nsé na Mibeko te) ete nazwa Bayuda; epai na bango na nsé na Mibeko, nayei lokola Epai na bango bazangi Mibeko, nayei lokola moto oyo azangi Mibeko (ata nazangi Mibeko na Nzambe te kasi nakangami na mibeko na Klisto) ete nazwa bango bazangi Mibeko. Epai na bato na bolɛmbu nayei lokola moto na bolɛmbu ete nazwa bato na bolɛmbu. Nayei ndenge nyonso epai na bato banso ete na nzela nyonso, nabikisa bamosusu.’’​—1 Bakolinti 9:19-22.

16 Mpo na komekola ntoma Paulo kati na likambo wana, tosengeli kozala na mayele ete tozokisa bato te, na bososoli, mpe kozala bato bayebi kotala makambo. Soki toyebi komitya na esika ya molobani na biso, tokokoka koyebisa ye solo na kotaleláká lolenge na ye ya kokanisa. Mokanda comment raisonner à partir des Écritures ezali lisalisi mpo na biso kati na likambo yango. Tómemaka yango ntango nyonso kati na mosala ya kosakola.

Bolingo ezali na ntina mingi​—mpo na kosolola

17. Kati na bizaleli nyonso ya boklisto, ezaleli nini oyo ezali kopesa biso nzela na koyebisa solo na malamu nyonso, mpe lolenge nini yango ekomonanaka?

17 Moto oyo azali na bopɔlɔ, na elimo na komikitisa, na motema pɛtɛɛ mpe ayebi komitya na esika na bato mosusu, azali na bizaleli ya ntina mingi mpo na kokoka malamu mpenza koteya bato mosusu. Kasi, likoló na nyonso, ezali bolingo bozangi koluka litomba nde ekopesa biso nzela na kosimba mitema na bato. Yesu azalaki kookela bato mawa, mpo ete ‘balɛmbaki mpe balemalemaki lokola bampate bazangi mobateli. Ezali bolingo nde etindaki ye na koloba ete: “Boya epai na ngai, bino nyonso bozali kolɛmba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino.” (Matai 9:36; 11:28) Ezali mpo na bolingo oyo tozali na yango epai na bato nde tolingi ete biso mpe, tolendisa bango mpe tosalisa bango ete batambola na nzela na bomoi. Nsango na biso ezali nsango na bolingo: toyebisa yango na bolingo! Bolingo wana monene ekomonisamaka na koseka ya boninga, na boboto mpe na bopɔlɔ, na esengo mpe na mɔtɔ.

18. Lolenge nini tokoki komekola Paulo, lokola ye mpe amekolaki Nkolo?

18 Mpo na yango, ntoma Paulo azalaki momekoli na sembo na Nkolo na ye, Yesu Klisto. Lolenge nini akokaki kosala masangá nyonso wana? Mpo na molende na ye? Na ntembe te. Nde lisusu mpo ete azalaki na bolingo. Tala bolingo oyo amonisaki wana ezalaki ye kolobela lisangá ya sika ya Tesalonike: “Tokómi bato na bopɔlɔ kati na bino, lokola mama akobɔkɔlo bana na ye. Na yango, awa ezalaki biso na bolingo mingi mpo na bino, tosepelaki kopesa bino bobele nsango malamu na Nzambe te, kasi bomoi na biso lokola, mpo ete bosili kokóma balingami na biso’’. Soki tomekoli Paulo, milende na biso mpo na kosolola na bato mosusu ekobota mbuma mingi.​—1 Batesaloniki 2:7, 8, MN.

19. Mpo na nini bosengeli te kolɛmba wana bato baboyi koyamba solo?

19 Tosengeli kolɛmba mpo ete tosalaki nyonso oyo ekoki na biso mpo na kosolola nde tozwi litomba malamu te? Soko moke te. Bayekoli na Biblia (nkombo ya kala ya ba Témoins de Jéhovah) bazalaki koloba ete mpo na kondima solo, bato basengeli kokokisa makambo misato: kozala na bolingo malamu, na ezaleli ya komikitisa mpe kozala na mposa makasi. Tokoki komizela te ete bato oyo bazangi bolingo malamu, baoyo na motema sembo te, bakoka koyamba solo; tokomizela te ete bato na lofundo to bato na lolendo bayoka nsango malamu. Lisusu, ekoki kozala mwa mpasi ete moto, ata azali na ezaleli ya komikitisa mpe na bolingo malamu, andima solo, soko nde azangi mposa to nzala na makambo ya elimo.

20. Mpo na nini tokoki koloba ete milende na biso mpo na koyebisa solo mizali mpamba te?

20 Na ntembe te, bato mingi oyo ozali kokutana na bango na teritware na yo bazali kokokisa moko na makambo oyo te to mingi kati na yango. Mosakoli Yilimia akutanaki na makambo motindo moko na yo. (Yilimia 1:17-19; tala Matai 5:3) Kasi, milende na biso mizali mpamba te. Mpo na nini bongo? Mpo ete tozali kosakola nkombo mpe Bokonzi na Jéhovah. Na mosala na biso ya kosakola mpe ata na komonana mpamba, tozali kokebisa bato mabe. (Ezekiele 33:33) Epai mosusu, tobosana te ete milende oyo tozali kosala mpo na koyebisa solo epai na bazalani na biso ezali na litomba monene mpo na biso moko. (1 Timoté 4:16) Ezali kosalisa biso na kozala na kondima makasi mpe na kobatela elikya na biso kati na Bokonzi. Lisusu, tozali bongo kotikala sembo mpe tozali kosangana na mosala ya kokumisa nkombo ya Jéhovah Nzambe, likambo oyo lizali kosepelisa motema na ye.​—Masese 27:11.

21. Tokoki koloba nini na bokuse?

21 Na mokuse, tokoloba ete kosolola ezali nzela mpo na kolonga koyebisa likambo epai na moto mosusu. Koyeba kosolola ezali na ntina monene, mpe kozanga kosolola ekoki kosala mabe mingi. Tomonaki ete jéhovah Nzambe mpe Yesu Klisto bazali basololi baleki minene, mpe ete Yesu Klisto asili kopesa mwango ya bosololi na eleko na biso. Tomonaki lisusu ete, tokoki koyebisa nsango epai na bato na nzela na molato na biso mpe na ezaleli na biso. Toyekolaki ete kokanisa elongo na bato ezali na ntina monene kati na milende oyo tozali kosala mpo na kosolola na bango, mpe ete mpo na kolonga kosolola malamu elongo na bazalani na biso, tosengeli kozala bato na bopɔlɔ mpe na komikitisa, koyeba komitya na esika ya bato mosusu, kozala na motema pɛtɛɛ mpe, oyo eleki mpenza, kopusama na motema oyo motondi na bolingo. Soki tolóni bizaleli oyo mpe tolandi ndakisa ya Biblia, tokozala baklisto oyo bayebi kosolola malamu mpenza.​—Baloma 12:8-11

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo un kozwa makanisi mingi likoló na lolenge ya kosolola elongo na bato oyo bazali na kondima na bango, Bayuda to bato mosusu, talela mokanda comment raisonner á partir des Ecritures, pages 21-24.

Bozongeli

◻ Mpo na nini tokoki koloba ete kosolola ebandaka liboso nkutu ete liloba moko libimisama?

◻ Tanga mwa bandakisa ya kosolola oyo esalemaki na kokanisaka na lolenge malamu elongo na bato.

◻ Bizaleli nini bipesaki nzela na Yesu Klisto mpe na Paulo ete basolola na malamu mpenza?

◻ Mpo na nini tosengeli te kolɛmba soki tozali kozwa matomba noki te?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto